Matthew 26:17-19
Bilei ya suka
(Mlk 14.12-16; Lk 22.7-13)
17Na mokolo ya liboso ya feti ya Mapa ezanga levire, bayekoli bayaki kotuna Yesu : — Esika nini olingi ete tobongisela Yo bilei ya Pasika ?18Azongiselaki bango : — Bokende na engumba epai ya moto songolo mpe boloba na ye : « Moteyi alobi : ‹ Tango na Ngai ekomi pene ; nakolia bilei ya Pasika elongo na bayekoli na Ngai epai na yo. › »
19Bayekoli basalaki ndenge Yesu atindaki bango mpe babongisaki bilei ya Pasika.
Copyright information for
LinMNB