‏ Matthew 26:20-25

(Mlk 14.17-21; Lk 22.14, 21-23; Yn 13.21-30)

20Tango pokwa ekomaki, Yesu avandaki na mesa elongo na bayekoli zomi na mibale. 21Wana bazalaki kolia, Yesu alobaki : — Nazali koloba na bino penza ya solo : moko kati na bino akoteka Ngai.

22Bayokaki mawa mingi, mpe bakomaki kotuna Ye, moko sima na moninga : — Nkolo, ezali ngai ?

23Yesu azongisaki : — Moto oyo akoteka Ngai azali kolia sani moko elongo na Ngai. 24Solo, Mwana na Moto akokende, kolanda ndenge ekomama na tina na Ye ; kasi mawa na moto oyo akoteka Mwana na Moto ! Elingaki kozala malamu koleka mpo na moto yango ete abotama te.

25Yuda, ye oyo asengeli koteka Ye, alobaki : — Moteyi, ezali ngai ?

Yesu azongiselaki ye : — Olobi yango.
Copyright information for LinMNB