Matthew 27:11-14
Yesu asambi liboso ya Pilato
(Mlk 15.2-15; Lk 23.1-5; Yn 18.28–19.16)
11Yesu asambaki liboso ya moyangeli. Moyangeli atunaki Yesu : — Boni, ozali mokonzi ya Bayuda ?Yesu azongisaki : — Olobi yango.
12Sima na yango, tango bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bakambi ya bato bafundaki Ye, azongisaki lisusu eloko moko te. 13Bongo Pilato atunaki Ye : — Ozali koyoka te makambo nyonso oyo bazali koloba mpo na kofunda Yo ? 14Kasi Yesu azongisaki ata liloba moko te ; mpe moyangeli akamwaki makasi.
Copyright information for
LinMNB