Matthew 27:27-31
27Basoda ya Guvelenele bamemaki Yesu na ndako ya Guvelenele, mpebatiaki ye na kati-kati na bongo nyonso. 28Balongolaki ye bilamba mpe balatisaki ye nzambala ya motane. 29Sima, balatisaki ye ekoti moko ya bokonzi, kasi basalaki yango na nzuba. Basimbisaki ye nzete na loboko na ye ya mobali, babandaki kofukamela ye mpe kosakana na ye ; bazalaki koloba : —Mbote, mokonzi ya Bayuda ! 30Bazalaki kobwakela ye soyi ; bakamataki nzete mpe bazalaki kobeta ye yango na motu. 31Sima ya kosilisa kosakana na ye, balongolaki ye nzambala mpe balatisaki ye bilamba na ye, bongo bamemaki ye mpo na kobaka ye na ekulusu.Liwa ya Yesu
(Mk. 15.21-32 ; Lk. 23.26-43 ; Jn. 19.17-22)
Copyright information for
LinMNB