Matthew 3:13-17
Kobatisama ya Yesu
(Mlk 1.9-11; Lk 3.21-22; Yn 1.29-34)
13Yesu alongwaki na Galile mpe akendeki na Yordani mpo ete Yoane abatisa Ye. 14Kasi Yoane aboyaki kobatisa Ye. Alobaki : — Ezali ngai nde nazali na posa ete Yo obatisa ngai ; kasi ndenge nini Yo oyei epai na ngai ?15Yesu azongiselaki ye : — Tika ete esalema bongo sik’oyo ! Ezali malamu mpo na biso kosala bongo mpo na kokokisa bosembo nyonso.
16Tango kaka Yesu azwaki libatisi mpe abimaki na mayi, Likolo efungwamaki ; mpe Yesu amonaki Molimo ya Nzambe kokitela Ye lokola ebenga. 17Bongo, mongongo moko eyokanaki wuta na Likolo mpe elobaki : « Oyo azali Mwana na Ngai ya bolingo, nasepelaka na Ye mingi. »
Copyright information for
LinMNB