Matthew 4:18-22
Yesu abengi bayekoli ya liboso
(Mlk 1.16-20; Lk 5.1-11)
18Wana Yesu azalaki kotambola pembeni ya ebale ya Galile, amonaki bandeko mibali mibale : Simona oyo bazalaki kobenga Petelo, mpe Andre, ndeko na ye ; bazalaki kobwaka monyama na ebale, pamba te bazalaki balobi mbisi. 19Yesu alobaki na bango : « Bolanda Ngai, mpe nakokomisa bino balobi bato. » 20Mbala moko, batikaki minyama na bango mpe balandaki Yesu. 21Tango alongwaki wana mpo na kokoba mobembo na Ye, amonaki lisusu bandeko mibali mibale : Jake, mwana mobali ya Zebede, mpe Yoane, ndeko na ye. Bazalaki kobongisa minyama kati na bwato na bango elongo na Zebede, tata na bango. Yesu abengaki bango ; 22mpe, mbala moko, batikaki bwato mpe tata na bango, bongo balandaki Yesu.
Copyright information for
LinMNB