‏ Matthew 4:23-25

Yesu abikisi babeli

(Mlk 3.7-12; Lk 6.17-19)

23Wana Yesu azalaki kotambola kati na Galile mobimba, azalaki koteya kati na bandako na bango ya mayangani, kosakola Sango Malamu ya Bokonzi ya Likolo, kobikisa bato na pasi mpe na bokono na bango nyonso. 24Sango na Ye epanzanaki kati na Siri mobimba, mpe bato bazalaki komemela Ye babeli oyo bazalaki na bokono ya ndenge na ndenge mpe oyo bazalaki na mikakatano makasi : bato oyo bazalaki na se ya bokonzi ya milimo mabe, bato oyo bazalaki na bokono ya ndeke mpe bato oyo bazalaki na makolo mpe maboko ya kokufa ; mpe azalaki kobikisa bango. 25Ebele ya bato bazalaki kolanda Ye ; bazalaki kowuta na Galile, na Dekapoli
Dekapoli ezalaki etuka ya bingumba zomi
, na Yelusalemi, na Yuda mpe na etuka mobimba ya ngambo ya Yordani.
Copyright information for LinMNB