‏ Matthew 6:19-21

Mateya na tina na bomengo

(Lk 12.33-34)

19 Bonduka bomengo te awa na mokili, pamba te ekoki kobeba to nselele ekoki kolia yango to mpe miyibi bakoki kobuka ndako mpo na koyiba yango. 20Kasi bonduka bomengo na bino kati na Likolo epai wapi ekoki kobeba te to nselele ekoki kolia yango te to mpe miyibi bakoki kobuka ndako te mpo na koyiba yango ; 21pamba te epai bomengo na yo ezali, kuna mpe motema na yo ekozala.
Copyright information for LinMNB