Matthew 7:16-20
16Bokoyeba bango na nzela ya misala na bango. Boni, bokoki kolongola bambuma ya vino na nzete ya basende to kobuka bambuma ya figi na nzete ya banzube ? 17Nzete nyonso ya malamu ebotaka mpe bambuma ya malamu, kasi nzete ya mabe ebotaka mpe bambuma ya mabe. 18Nzete ya malamu ebotaka te bambuma ya mabe, mpe nzete ya mabe ebotaka te bambuma ya malamu. 19Nzete nyonso oyo ebotaka te bambuma ya malamu, bapikolaka yango mpe babwakaka yango na moto. 20Boye, bokoyeba basakoli ya lokuta na nzela ya misala na bango.
Copyright information for
LinMNB