‏ Matthew 8:18-22

Pasi ya kolanda Yesu

(Lk 9.57-62)

18Tango Yesu amonaki ete bato ebele bazingeli Ye, apesaki mitindo epai ya bayekoli na Ye ete bakatisa na ngambo mosusu ya ebale. 19Molakisi moko ya mibeko apusanaki pene ya Yesu mpe alobaki : — Moteyi, nakolanda Yo na esika nyonso oyo okokende.

20Kasi Yesu alobaki na ye : — Bambwa ya zamba ezalaka na madusu na yango na se ya mabele mpo na kobombama, mpe bandeke ya likolo ezalaka na bazala na yango ; kasi Mwana na Moto azangi esika ya kolala mpo na kopema.

21Moto mosusu oyo azalaki moko kati na bayekoli ya Yesu alobaki na Ye : — Nkolo, pesa ngai nzela ete nakende nanu kokunda tata na ngai.

22Kasi Yesu alobaki na ye : — Landa Ngai ! Tika bakufi bakunda bakufi na bango.
Copyright information for LinMNB