‏ Matthew 8:23-27

Yesu aleki mopepe na nguya

(Mlk 4.36-41; Lk 8.22-25)

23Yesu amataki na bwato, mpe bayekoli na Ye balandaki Ye. 24Mbala moko, mopepe moko ya makasi ekomaki kopepa kati na ebale mpe mbonge ekomaki kozipa bwato. Kasi Yesu azalaki kolala pongi. 25Bayekoli bapusanaki pene na Yesu mpe balamusaki Ye na koganga : — Nkolo, bikisa biso ! Tozali kokufa !

26Kasi Yesu alobaki na bango : — Bato na kondima moke ! Mpo na nini bozali kobanga ?

Bongo atelemaki, agangelaki mopepe mpe mbonge ; bongo kimia monene ezongaki.
27Bato oyo bazalaki wana bakamwaki mpe bakomaki kolobana : « Moto oyo azali penza ndenge nini mpo ete ezala mopepe mpe ebale etosa ye ? »
Copyright information for LinMNB