Matthew 9:1-8
Yesu alimbisi mpe abikisi ebosono
1Yesu amataki na bwato, akatisaki ebale mpe akendeki na engumba na Ye. 2Bamemelaki Ye ebosono moko alala na tsipoyi. Tango Yesu amonaki kondima na bango, alobaki na ebosono yango : — Mwana na Ngai, yika mpiko ! Masumu na yo elimbisami.3Mpo na yango, ndambo ya balakisi ya Mobeko bakomaki kolobaloba na se ya mitema : — Moto oyo azali kotiola Nzambe !
4Lokola Yesu asosolaki makanisi na bango, atunaki bango : — Mpo na nini bozali na makanisi mabe kati na mitema na bino ? 5Likambo nini eleki pete mpo na koloba : « Masumu na yo elimbisami to telema mpe tambola ? » 6Ezali mpo boyeba ete Mwana na Moto azali na bokonzi ya kolimbisa masumu kati na mokili.
Bongo alobaki na ebosono : — Telema, kamata tsipoyi na yo mpe zonga na ndako na yo.
7Moto yango atelemaki mpe akendeki na ndako na ye. 8Tango ebele ya bato bamonaki bongo, batondaki na somo mpe bakomaki kokumisa Nzambe oyo apesi bokonzi ya ndenge wana epai ya bato.
Copyright information for
LinMNB