Micah 5
Mokonzi akobotama na Beteleemi
1 ▼▼5:2 in most Bibles.
Bongo yo, Beteleemi Efrata,atako ozali moke kati na bingumba ya Yuda,
ye oyo akokonza Isalaele
akowuta kati na yo.
Ebandeli na Ye ezala wuta kala penza,
wuta na ebandeli ya tango.
2 ▼
▼5:3 in most Bibles.
Yango wana, Yawe akosundola Isalaelekino tango mwasi oyo azali
na pasi ya kobota akobota,
mpe ndambo ya bandeko na ye,
oyo bakotikala bakozonga
epai ya bandeko na bango, bana ya Isalaele.
3 ▼
▼5:4 in most Bibles.
Akotelema mpe akobatela bibwele na yena nguya na Yawe,
na lokumu ya Kombo ya Nzambe na ye ;
mpe bakovanda na kimia,
pamba te sango ya lokumu ya kombo na ye
ekopanzana mokili mobimba.
4 ▼
▼5:5 in most Bibles.
Boye, akozala kimia na bango !Tango mampinga ya Asiri bakokota na makasi
kati na mokili na biso mpe na bandako na biso,
oyo batonga makasi,
tokotindela bango babateli sambo ya bibwele
mpe bakambi mwambe ya bato
mpo na kobundisa bango.
5 ▼
▼5:6 in most Bibles.
Bakokamba mokili ya Asiri mpe ya Nimirodi na mopanga.Boye, akokangola biso na bokonzi ya mampinga ya Asiri
tango bakokota na makasi na mabele na biso
mpe na bandelo na yango.
6 ▼
▼5:7 in most Bibles.
Batikali ya Jakobi bakozala,kati na bikolo ebele lokola mamwe
oyo ewuti epai na Yawe,
mpe na likolo ya matiti lokola londende
oyo ekweyaka na makasi ya moto te
to mpe etalelaka moto te.
7 ▼
▼5:8 in most Bibles.
Batikali ya Jakobi bakozala kati na mabota,na kati-kati ya bikolo ebele,
lokola nkosi kati na banyama ya zamba,
lokola mwana nkosi kati na etonga ya bameme :
tango elekaka kati na etonga ya bameme,
ekangaka mpe epasolaka yango,
mpe moto oyo akoki kokangola yango azalaka te.
8 ▼
▼5:9 in most Bibles.
Tika ete loboko na yo elonga banguna na yo,mpe bayini na yo nyonso babebisama nye !
9 ▼
▼5:10 in most Bibles.
« Na mokolo wana, » elobi Yawe,« nakobebisa bashar mpe bampunda ya mokili na yo,
10 ▼
▼5:11 in most Bibles.
nakobebisa bingumba ya mokili na yompe nakokweyisa bandako na yo,
oyo batonga makasi ;
11 ▼
▼5:12 in most Bibles.
nakobebisa misala na yo nyonso ya kindoki,mpe okotikala lisusu na bato ya soloka te ;
12 ▼
▼5:13 in most Bibles.
nakobebisa banzambe ya bikekooyo ezali kati na yo,
mpe okofukamela lisusu te bikeko
oyo maboko na yo esilaki kosala ;
13 ▼
▼5:14 in most Bibles.
nakobebisa makonzi ya buleya nzambe Ashera oyo ezali kati na yo
mpe nakobebisa bingumba na yo.
14 ▼
▼5:15 in most Bibles.
Na kanda na Ngai ya makasi,nakozongisa mabe na mabe na bikolo
oyo etosaki Ngai te. »
Copyright information for
LinMNB