‏ Psalms 100

Bato ya Yawe bazali kokumisa Yawe

Nzembo ya kozongisa matondi

1Boganga na esengo epai na Yawe mokili mobimba !

2 Bokumbamela Yawe na esengo nyonso,
mpe boya liboso na ye na banzembo ya esengo !

3 Boyeba ete Yawe azali Nzambe.
Ye moto asalaki biso,
mpe biso tozali bato na ye ;
tozali bato na ye, mpe bameme oyo ye aleyisaka.

4 Bokota na baporte na ye
na kozongisa matondi ;
mpe na lopango na ye
na masanzoli.
Bopesa ye matondi
mpe bosanzola kombo na ye.

5 Pamba te Yawe azali malamu ;
mpe bolingo na ye ezali kowumela tango nyonso,
mpe boyengebene na ye ezali kokoba na batango nyonso.
Copyright information for LinMNB