Psalms 102
Libondeli ya moto na pasi
1 ▼▼102:1 in some Bibles.
Libondeli ya moto na pasi, oyo abungisi elikya mpe azali kolela liboso ya Yawe. 2 ▼▼102:1 in most Bibles.
Yawe, yoka libondeli na ngai !Tika ete koganga na ngai ekoma kino epai na Yo !
3 ▼
▼102:2 in most Bibles.
Kobombela ngai elongi na Yo te,wana nazali na pasi.
Yoka libondeli na ngai
na mokolo oyo nazali kobelela Yo ;
yanola ngai noki !
4 ▼
▼102:3 in most Bibles.
Pamba te mikolo ya bomoi na ngai ezali kolimwalokola molinga,
mikuwa na ngai ezali kozika
lokola makala ya moto.
5 ▼
▼102:4 in most Bibles.
Motema na ngai ebungisi elikyampe ezali komitungisa lokola matiti oyo bakati ;
mpo na yango, nakomi ata kobosana
kolia bilei na ngai.
6 ▼
▼102:5 in most Bibles.
Mpo ete naleli makasi,natikali kaka na poso ya nzoto likolo ya mikuwa.
7 ▼
▼102:6 in most Bibles.
Nakomi lokola esulungutu ya esobe,lokola esulungutu ya bisika oyo ebeba.
8 ▼
▼102:7 in most Bibles.
Pongi ekimi ngai ;nakomi lokola ndeke oyo etikali yango moko
na likolo ya ndako.
9 ▼
▼102:8 in most Bibles.
Banguna na ngai batombokeli ngai,bazali kofinga ngai tango nyonso
mpe bazali kosalela kombo na ngai
mpo na kolakela bato mabe.
10 ▼
▼102:9 in most Bibles.
Nakomi kolia putulu na esika ya bilei,mpe komela mayi esangana na mpinzoli na ngai.
11 ▼
▼102:10 in most Bibles.
Mpo na kanda monene na Yo,otombokeli ngai mpe obwaki ngai mosika.
12 ▼
▼102:11 in most Bibles.
Mikolo ya bomoi na ngai ezali kokima lokola elili,mpe nakawuki lokola matiti.
13 ▼
▼102:12 in most Bibles.
Kasi Yo Yawe, ozali Mokonzimpo na libela,
ozali Nzambe seko na seko.
14 ▼
▼102:13 in most Bibles.
Okotelema solo mpo na Siona,pamba te ekomi tango ya koyokela yango mawa ;
tango oyo ekatama ekoki.
15 ▼
▼102:14 in most Bibles.
Pamba te biso basali na Yo, tosepelakana mabanga na yango,
mpe toyokelaka putulu na yango mawa.
16 ▼
▼102:15 in most Bibles.
Bikolo ekotosa Yawe,mpe bakonzi nyonso ya mokili bakondima
nkembo na Yo.
17 ▼
▼102:16 in most Bibles.
Pamba te Yawe akotonga lisusu Sionampe akomonana kati na nkembo na Ye.
18 ▼
▼102:17 in most Bibles.
Akoyanola libondeli ya batooyo babungisaki biloko,
mpe akondima mabondeli na bango.
19 ▼
▼102:18 in most Bibles.
Tika ete bakoma yangompo na ekeke oyo ekolanda,
mpo ete bikelamu ya sika ekumisa Yawe.
20 ▼
▼102:19 in most Bibles.
Wuta na Esika na Ye ya bule,wuta na likolo, Yawe atalaki biso
awa na mokili
21 ▼
▼102:20 in most Bibles.
mpo na koyoka kolela ya bakangamikati na boloko
mpe kokangola bato oyo bazwaki etumbu ya kufa.
22 ▼
▼102:21 in most Bibles.
Kombo ya Yawe ekokende sangokati na Siona,
mpe masanzoli na Ye, kati na Yelusalemi
23 ▼
▼102:22 in most Bibles.
tango bato mpe bikolo bakosanganampo na kogumbamela Yawe.
24 ▼
▼102:23 in most Bibles.
Na bomoi na ngai, abukaki lolendoya makasi na ngai,
mpe akitisaki motango ya mikolo ya bomoi na ngai.
25 ▼
▼102:24 in most Bibles.
Nalobaki :« Nzambe na ngai,
Yo oyo ozali na bomoi seko na seko,
koboma ngai te na kati-kati ya mikolo
ya bomoi na ngai !
26 ▼
▼102:25 in most Bibles.
Na kala, otiaki miboko ya mokili,mpe maboko na Yo esalaki Likolo.
27 ▼
▼102:26 in most Bibles.
Bango, bakokufa ;kasi Yo, okotikala seko na seko.
Nzoto na bango ekolemba lokola elamba ;
okobongola bango lokola kazaka, mpe bakolimwa.
28 ▼
▼102:27 in most Bibles.
Kasi Yo, ozali ndenge moko,mibu na Yo ekotikala kosuka te.
29 ▼
▼102:28 in most Bibles.
Bana ya basali na Yo bakozwa esika ya kovanda,mpe bakitani na bango bakowumela liboso na Yo. »
Copyright information for
LinMNB