Psalms 114
Tango Isalaele abimaki wuta na Ejipito
1Tango Isalaele abimaki wuta na Ejipito,tango libota ya Jakobi elongwaki
na ekolo ya bapaya,
2Yuda ekomaki Esika ya bule ya Yawe,
mpe Isalaele ekomaki mabele na Ye.
3Ebale monene emonaki yango mpe ekimaki,
mayi ya Yordani ezongaki na sima,
4bangomba epumbwaki lokola bameme,
bangomba mike epumbwaki lokola bana ya ntaba.
5Ebale monene, nini ezalaki kati na yo
mpo ete okima ?
Yordani, mpo na nini ozongaki na sima ?
6Bino bangomba, mpo nini bopumbwaki
lokola bameme ?
Bongo bino bangomba mike, mpo na nini bopumbwaki
lokola bana ya ntaba ?
7Mokili, lenga liboso ya Yawe,
liboso ya Nzambe ya Jakobi,
8oyo abongolaka libanga monene liziba,
mpe libanga etima.
Copyright information for
LinMNB