‏ Psalms 117

Masanzoli ya bikolo nyonso

1Bino bato ya bikolo nyonso,
bokumisa Yawe !
Bino bato ya mabota nyonso,
bopesa Ye nkembo !
2Pamba te bolingo na Ye mpo na biso ezali monene,
mpe bosembo ya Yawe ewumelaka
seko na seko.

Bokumisa Yawe !
Copyright information for LinMNB