‏ Psalms 124

Lisungi na biso ewutaka epai ya Yawe

1Nzembo ya Davidi. Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe.

Soki Yawe abatelaki biso te ;
tika ete Isalaele aloba bongo !
2Soki Yawe abatelaki biso te
tango bato babundisaki biso,
3mbele bamelaki biso ya bomoi
tango basilikelaki biso makasi.
4Boye mayi elingaki kozindisa biso,
mbonge makasi elingaki komema biso.
5Mayi makasi elingaki kozindisa biso.

6Tika ete Yawe apambolama,
Ye oyo andimaki te ete minu na bango epasola biso !
7Tobikaki lokola ndeke liboso ya motambo
ya mokangi bandeke ;
motambo ekatanaki, mpe tokimaki.
8Lisungi na biso ezali kati na Kombo na Yawe
oyo akela likolo mpe mabele.
Copyright information for LinMNB