‏ Psalms 126

Tango ya kolona mpe tango ya kobuka

1Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe.

Tango Yawe azongisaki bato ya Siona
longwa na bowumbu,
tozalaki lokola bato oyo bazali kolota ndoto.
2Boye, tozalaki koganga mpe koyemba na esengo.
Bongo, maloba oyo ekomaki kolobama kati na bikolo :
« Yawe asaleli bango makambo minene ! »
3Solo, Yawe asaleli biso makambo minene,
mpe tozali kosepela.

4Yawe, yaka kobongisa makambo na biso
ndenge kaka otondisaka lisusu miluka ya Negevi.

5Bato oyo balonaka na mpinzoli
babukaka na banzembo ya esengo.
6Moto oyo akendaka na kolela,
tango amemi milona na ye,
azongaka na esengo
wana amemi maboke na ye.
Copyright information for LinMNB