Psalms 127
Nani asalaka nyonso
1Nzembo ya Salomo. Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe.Soki Yawe atongi ndako te,batongi ndako bazali kosala mosala ya pamba ;
soki Yawe akengeli engumba te,
bakengeli bazali kosala na pamba.
2Ezali na pamba nde, bino mpe,
bolamukaka na tongo makasi,
bolalaka noki te mpe bosalaka makasi
mpo na kozwa bilei ;
pamba te Nzambe apesaka bilei yango
kaka na balingami na Ye,
wana bazali nanu kolala pongi.
3Bana bazali libula kowuta na Yawe,
mpe kobota bana ezali lifuti.
4Ndenge makonga ezali kati na maboko ya mobundi bitumba,
ndenge wana mpe bana oyo moto aboti
na bolenge na ye bazali.
5Esengo na moto oyo atondisi makonga
kati na ebombelo na ye ya makonga !
Akokufa soni ata moke te
tango akosamba elongo na banguna na ye
na ekuke ya engumba.
Copyright information for
LinMNB