‏ Psalms 128

Tika ete Yawe apambola yo

1Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe.

Esengo na moto oyo atosaka Yawe
mpe alandaka banzela na Ye !
2Oliaka mbuma ya mosala na Yo ;
ozali moto ya esengo mpe ozali na bofuluki.
3Kati na ndako na yo,
mwasi na yo azali lokola nzete ya vino
oyo ebotaka bambuma ebele ;
bana na yo bazali lokola bankona ya nzete ya olive
zingazinga ya mesa na yo.
4Ezali ndenge wana nde Yawe apambolaka
moto oyo atosaka Ye.

5Solo, Yawe akopambola yo wuta na Siona,
mpe okomona bofuluki ya Yelusalemi
mikolo nyonso ya bomoi na yo
6mpe okomona bakitani na yo.

Tika ete kimia ezala na Isalaele !
Copyright information for LinMNB