‏ Psalms 133

Tango bandeko basangani

1Nzembo ya Davidi. Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe.

Tala ndenge ezali malamu mpe ndenge ezali kitoko
mpo na bandeko kozala lisanga kati na bomoko !
2Ezali lokola malasi ya motuya
oyo basopi na moto,
bongo ezali kokita na mandefu, na mandefu ya Aron,
ezali kokita kino na songe ya bilamba na ye.
3Ezali lokola mamwe ya Erimoni,
oyo ekitaka na bangomba ya Siona.
Pamba te kuna, Yawe apesaka lipamboli na Ye,
mpe bomoi, mpo na libela.
Copyright information for LinMNB