‏ Psalms 140

Kangola ngai wuta na maboko ya bakosi

1
140:1 in some Bibles.
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi.

2
140:1 in most Bibles.
Yawe, kangola ngai
wuta na maboko ya bato ya misala mabe !
Kokutanisa ngai te na bato na kanza.
3
140:2 in most Bibles.
Basalaka mabongisi mabe kati na mitema na bango
mpe balukaka bitumba mikolo nyonso.
4
140:3 in most Bibles.
Bapelisaka lolemo na bango lokola nyoka,
bibebu na bango ezali na ngenge ya etupa.
5
140:4 in most Bibles.
Yawe, batela ngai mosika ya maboko ya moto mabe ;
kokutanisa ngai te na bato na kanza
oyo bazali kosala mabongisi ya kokweyisa ngai !
6
140:5 in most Bibles.
Bato ya lofundu batieli ngai mitambo,
batandi basinga ya minyama na nzela
mpe batimoli mabulu mpo na kokanga ngai.

7
140:6 in most Bibles.
Nalobaka na Yawe :
« Ozali Nzambe na ngai ! »
Yawe, yoka mabondeli na ngai.
8
140:7 in most Bibles.
Oh Yawe, Nkolo na ngai,
ozali makasi ya lobiko na ngai,
obatelaka moto na ngai kati na mokolo ya etumba.
9
140:8 in most Bibles.
Yawe, kokokisa te posa ya moto mabe,
kolongisa te mabongisi na ye, noki te akokoma lolendo.
10
140:9 in most Bibles.
Tika ete pasi oyo bibebu na bango esili kobongisa
ekweyela bato oyo bazingeli ngai.
11
140:10 in most Bibles.
Tika ete makala ya moto esopanela bango !
Tika ete Nzambe atindika bango kati na moto,
kati na mabulu ya potopoto
epai wapi bakokoka kotelema lisusu te !

12
140:11 in most Bibles.
Batioli bakowumela te kati na mokili,
pasi ekolanda bato na kanza na kolemba te.

13
140:12 in most Bibles.
Nayebi ete Yawe akotaka makambo ya babola
mpe alongisaka bato oyo bakelela.

14
140:13 in most Bibles.
Solo, bato ya sembo bakosanzola Kombo na Yo,
bato ya alima bakovanda liboso na Yo.
Copyright information for LinMNB