‏ Psalms 142

Ozali ekimelo kaka moko mpo na ngai

1
142:1 in some Bibles.
Nzembo ya Davidi. Maloba na ye tango azalaki kati na ebombamelo ya mabanga.

2
142:1 in most Bibles.
Na mongongo makasi, nazali koganga epai na Yawe ;
na mongongo makasi, nazali kobondela Yawe.
3
142:2 in most Bibles.
Natalisi likambo na ngai liboso na Ye,
natandi pasi na ngai liboso na Ye.

4
142:3 in most Bibles.
Soki molimo na ngai elembi kati na ngai,
Yo oyebi epai nazali kokende.
Batieli ngai motambo na nzela oyo nazali kotambola.
5
142:4 in most Bibles.
Bwaka miso na ngambo ya loboko ya mobali mpe tala !
Moto ata moko te ayebi ngai lisusu,
nazali lisusu na ekimelo te,
moto ata moko te azali komitungisa na tina na ngai !

6
142:5 in most Bibles.
Yawe, nagangi epai na Yo !
Nalobi : « Ozali ebombamelo na ngai,
libula na ngai kati na mokili ya bato ya bomoi ! »
7
142:6 in most Bibles.
Yoka koganga na ngai,
pamba te nazali na pasi makasi !
Kangola ngai wuta na maboko ya banyokoli na ngai,
pamba te baleki ngai na makasi.
8
142:7 in most Bibles.
Bimisa ngai na boloko
mpo ete nasanzola Kombo na Yo !
Bato ya sembo bakoya kozingela ngai
sima na Yo kosalela ngai bolamu.
Copyright information for LinMNB