Psalms 19
Bimoniseli mibale ya Nzambe
1 ▼▼19:1 in some Bibles.
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi. 2 ▼▼19:1 in most Bibles.
Likolo etatolaka nkembo ya Nzambe,mapata elobaka misala na Ye.
3 ▼
▼19:2 in most Bibles.
Mokolo moko na moko eyebisaka yangoepai ya mokolo oyo elandaka,
mpe butu moko na moko eyebisaka yango
epai ya butu oyo elandaka.
4 ▼
▼19:3 in most Bibles.
Ezali na nzela ya lisolo te,na nzela mpe ya maloba te
oyo mingongo na yango eyokanaka te.
5 ▼
▼19:4 in most Bibles.
Nzokande, sango na yango eyokanaka na mokili mobimba,maloba na yango ekomaka kino na suka ya mokili.
Na likolo, Nzambe atie ndako ya kapo mpo na moyi.
6 ▼
▼19:5 in most Bibles.
Moyi yango ebimaka na tongondenge elenge mobali oyo abali sika
abimaka na shambre na ye,
mpe ndenge elombe atambolaka
na elikya ya kolonga na momekano.
7 ▼
▼19:6 in most Bibles.
Moyi ebimaka wuta na songe moko ya likolo,mpe esukisaka mobembo na yango na songe mosusu ;
eloko moko te ezangaka kozwa molunge na yango.
8 ▼
▼19:7 in most Bibles.
Mibeko ya Yawe ezali ya kokoka,epesaka biso lisusu nguya ya kozala na bomoi.
Maloba na Ye nyonso ezali ya solo,
ebongi na kotiela yango elikya,
mpe epesaka bwanya epai ya zoba.
9 ▼
▼19:8 in most Bibles.
Mitindo ya Yawe ezali alima,esepelisaka motema ;
malako na Ye ezali peto,
epesaka bososoli.
10 ▼
▼19:9 in most Bibles.
Kotosa Yawe ezali peto,ewumelaka libela na libela.
Mitindo ya Yawe ezali ya solo,
nyonso ezali penza sembo.
11 ▼
▼19:10 in most Bibles.
Ezali na motuya koleka wolo,koleka wolo ebele ya peto,
wolo oyo basangisa na eloko mosusu te ;
eleki mafuta ya nzoyi na elengi,
mafuta ya nzoyi oyo ezali kobima sika.
12 ▼
▼19:11 in most Bibles.
Epesaka mosali na Yo mayele ;moto nyonso oyo atosaka yango azwaka litomba mingi.
13 ▼
▼19:12 in most Bibles.
Nani akoki kososola mabunga na yeoyo asali na nko te ?
Limbisa masumu na ngai, oyo nayebi te !
14 ▼
▼19:13 in most Bibles.
Batela lisusu mosali na Yompo ete nasala mabe na nko te.
Na bongo, nakozala moto ya kokoka
mpe nakosala bambeba minene te.
15 ▼
▼19:14 in most Bibles.
Yawe, Libanga na ngai mpe Mosikoli na ngai,tika ete maloba mpe makanisi ya motema na ngai
esepelisa Yo !
Copyright information for
LinMNB