Psalms 20
Yawe, longisa mokonzi na biso
1 ▼▼20:1 in some Bibles.
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi. 2 ▼▼20:1 in most Bibles.
Tika ete Yawe ayanola yona tango ya pasi ;
tika ete Nzambe ya Jakobi azala
ndako batonga makasi mpo na kobatela yo.
3 ▼
▼20:2 in most Bibles.
Tika ete asunga yo wuta na Esika na Ye ya bulempe apesa yo makasi wuta na Siona.
4 ▼
▼20:3 in most Bibles.
Tika ete akanisa makabo na yo nyonsompe andima mbeka na yo ya kotumba.
5 ▼
▼20:4 in most Bibles.
Tika ete akokisa posa ya motema na yompe mabongisi na yo nyonso.
6 ▼
▼20:5 in most Bibles.
Tokoganga na esengo mpo na lobiko na Yompe tokotombola bendele
na Kombo ya Nzambe na biso.
Tika ete Yawe akokisa bisengeli na Yo nyonso.
7 ▼
▼20:6 in most Bibles.
Nayebi sik’oyo ete Yawe abikisaka mopakolami na Ye,ayanolaka ye wuta na Esika na Ye ya bule kati na Lola,
na nzela ya nguya ya loboko na Ye ya mobali.
8 ▼
▼20:7 in most Bibles.
Bamoko batiaka elikya na bango kati na bashar,bamosusu, kati na bampunda ;
kasi biso totiaka elikya na biso
kati na Kombo na Yawe, Nzambe na biso.
9 ▼
▼20:8 in most Bibles.
Bango, bafukamaka mpe bakweyaka ;kasi biso, tozalaka kaka ya kotelema
mpe totikalaka ngwi.
10 ▼
▼20:9 in most Bibles.
Yawe, bikisa mokonzi !Yanola biso tango tozali kobelela.
Copyright information for
LinMNB