Psalms 22
Mpo na nini osundoli ngai
1 ▼▼22:1 in some Bibles.
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi, ya koyemba lokola nzembo na kombo « Mboloko ya tongo. » 2 ▼▼22:1 in most Bibles.
Nzambe na ngai, Nzambe na ngai,mpo na nini osundoli ngai ?
Mpo na nini otelemi mosika ?
Mpo na nini ozali kobikisa ngai te ?
Mpo na nini ozali koyoka te koganga na ngai ?
3 ▼
▼22:2 in most Bibles.
Nzambe na ngai, na moyi, nabeleli Yo,kasi oyanoli ngai te ;
na butu, nabeleli lisusu,
mpe natikali kovanda nye te.
4 ▼
▼22:3 in most Bibles.
Nzokande, ozali Mosantu,ovandaka na Kiti na Yo ya Bokonzi,
kati na masanzoli ya Isalaele.
5 ▼
▼22:4 in most Bibles.
Batata na biso batiaki elikya na bango kati na Yo,bamipesaki epai na Yo,
mpe okangolaki bango.
6 ▼
▼22:5 in most Bibles.
Bagangaki epai na Yo,mpe Yo okangolaki bango ;
batiaki elikya na bango kati na Yo
mpe bayokisamaki soni te.
7 ▼
▼22:6 in most Bibles.
Nazali lisusu moto te, kasi mutsopi ;bato nyonso bazali kofinga mpe kotiola ngai.
8 ▼
▼22:7 in most Bibles.
Bato nyonso oyo bazali komona ngaibazali koseka ngai, bazali kokamwa,
koningisa mito mpe koloba :
9 ▼
▼22:8 in most Bibles.
« Atiaka motema na ye epai na Yawe ;tika ete Yawe abikisa ye !
Tika ete Yawe akangola ye,
pamba te asepelaka na Ye ! »
10 ▼
▼22:9 in most Bibles.
Solo, Yawe, obimisaki ngai na libumu ya mama na ngai,obatelaki ngai na kimia na tolo na ye.
11 ▼
▼22:10 in most Bibles.
Wuta mbotama na ngai,batikaki ngai na maboko na Yo ;
wuta libumu ya mama na ngai,
ozali Nzambe na ngai.
12 ▼
▼22:11 in most Bibles.
Kozala mosika na ngai te,pamba te pasi ekomi pene
mpe nazangi moto oyo akosunga ngai.
13 ▼
▼22:12 in most Bibles.
Banguna na ngai bazingeli ngailokola lisanga ya bangombe ya mibali,
bazingeli ngai lokola banyama mabe
oyo ezalaka na Bashani ;
14 ▼
▼22:13 in most Bibles.
mpe bafungoleli ngai makasi minoko na bangolokola nkosi oyo etomboki mpe ezali kolia nyama.
15 ▼
▼22:14 in most Bibles.
Nakomi lokola mayi oyo ezali kosopana,mpe mikuwa na ngai nyonso ekabwani ;
motema na ngai ekomi lokola mafuta
oyo ezali konyangwama kati na ngai.
16 ▼
▼22:15 in most Bibles.
Makasi na ngai ekawuki lokola potopoto,mpe nazali kokoka lisusu koloba te ;
otie ngai pembeni ya lilita.
17 ▼
▼22:16 in most Bibles.
Bambwa ezingeli ngai,ngulupa ya bato mabe bayei kobundisa ngai,
bazali kotambola zingazinga na ngai ;
bakangi maboko mpe makolo na ngai na basinga.
18 ▼
▼22:17 in most Bibles.
Nakoki sik’oyo kotanga ata mikuwa na ngai nyonso ;kasi bato bazali kotala mpe koseka ngai,
19 ▼
▼22:18 in most Bibles.
bazali kokabola bilamba na ngaimpe kobeta zeke mpo na nzambala na ngai.
20 ▼
▼22:19 in most Bibles.
Kasi Yo, Yawe, kozala mosika te !Ozali makasi na ngai ;
yaka noki kosunga ngai.
21 ▼
▼22:20 in most Bibles.
Bikisa bomoi na ngai liboso ya mopanga,mpe kangola yango wuta na manzaka ya bambwa.
22 ▼
▼22:21 in most Bibles.
Bikisa ngai wuta na monoko ya nkosimpe na maseke ya mpakasa.
23 ▼
▼22:22 in most Bibles.
Nakotatola Kombo na Yo epai ya bandeko na ngai,mpe nakokumisa Yo kati na mayangani.
24 ▼
▼22:23 in most Bibles.
Bino bato oyo botosaka Yawe, bosanzola Ye !Bino nyonso bana ya Jakobi, bopesa Ye lokumu !
Bino nyonso bana ya Isalaele, botosa Ye !
25 ▼
▼22:24 in most Bibles.
Pamba te Yawe atiolaki tempe abwakaki te mobola ;
apesaka ye mokongo te mpe ayokaka ye
tango asengaka lisungi.
26 ▼
▼22:25 in most Bibles.
Na ngolu na Yo, nakumisaka Yo kati na mayangani,nakokisaka bandayi na ngai
na miso ya bato oyo batosaka Yo.
27 ▼
▼22:26 in most Bibles.
Babola bakolia mpe bakotonda ;bato oyo balukaka Yawe bakosanzola Ye.
Tika ete bozala na bomoi libela na libela.
28 ▼
▼22:27 in most Bibles.
Mokili mobimba ekokanisa Yawe,ekomipesa epai na Ye ;
mpe bituka nyonso ya bikolo ekogumbama liboso na Ye.
29 ▼
▼22:28 in most Bibles.
Pamba te Yawe azali Mokonzi,azali kokonza bikolo.
30 ▼
▼22:29 in most Bibles.
Bazwi nyonso ya mokili bakoliampe bakogumbamela Ye ;
bato nyonso oyo bazali kokende na kunda,
ba-oyo bakoki te komibatela na bomoi,
bakogumbama liboso na Ye.
31 ▼
▼22:30 in most Bibles.
Bakitani na bango bakosalela Yawempe bakopanza sango na Ye
epai ya ekeke oyo ekoya na sima ;
32 ▼
▼22:31 in most Bibles.
bakosakola misala ya bosembo na Ye,epai ya bato oyo bakobotama.
Copyright information for
LinMNB