Psalms 30
Yawe azongisi ngai na bomoi
1 ▼▼30:1 in some Bibles.
Nzembo ya Davidi mpo na libulisi ya Tempelo. 2 ▼▼30:1 in most Bibles.
Yawe, nanetoli Yo,pamba te obimisaki ngai na libulu ya mozindo
mpe otikaki te banguna na ngai kosepela na tina na ngai.
3 ▼
▼30:2 in most Bibles.
Yawe, Nzambe na ngai, nabelelaki Yompo na kosenga lisungi,
mpe obikisaki ngai na bokono.
4 ▼
▼30:3 in most Bibles.
Yawe, obimisaki ngai na mboka ya bakufi,obatelaki bomoi na ngai
mosika na bato oyo bazali kokita na libulu.
5 ▼
▼30:4 in most Bibles.
Boyemba banzembo mpo na lokumu ya Yawe,bino babulami na Ye ;
bokumisa Kombo na Ye ya bule.
6 ▼
▼30:5 in most Bibles.
Pamba te kanda makasi na Ye ewumelakampo na mwa tango moke,
kasi ngolu na Ye ewumelaka seko na seko ;
kolela ekoki kowumela kino na pokwa,
kasi kosepela ekokota na tongo.
7 ▼
▼30:6 in most Bibles.
Tango nazalaki na kimia, nalobaki :« Nakotikala kokweya te. »
8 ▼
▼30:7 in most Bibles.
Yawe, tango osalelaki ngai ngolu,olendisaki ngomba na ngai ;
kasi tango obombelaki ngai elongi,
nabungisaki elikya.
9 ▼
▼30:8 in most Bibles.
Yawe, nabelelaki Yo ;nabelelaki Yawe mpo na kosenga lisungi :
10 ▼
▼30:9 in most Bibles.
« Litomba nini ezali soki nakufi,soki nakiti na libulu ?
Boni, putulu ekokumisa Yo ?
Boni, ekosakola boyengebene na Yo ?
11 ▼
▼30:10 in most Bibles.
Yawe, yoka ngai mpe salela ngai ngolu ;Yawe, zala lisungi na ngai. »
12 ▼
▼30:11 in most Bibles.
Obongoli kolela na ngai, okomisi yango mabina ;olongoli mokumba na ngai mpe olatisi ngai esengo,
13 ▼
▼30:12 in most Bibles.
mpo ete molimo na ngai ekumisa Yo na banzembo,kasi navanda nye te.
Yawe, Nzambe na ngai, nakokumisa Yo
libela na libela.
Copyright information for
LinMNB