Psalms 34
Yawe, mokangoli na ngai
1 ▼▼34:1 in some Bibles.
Nzembo ya Davidi. Ayembaki yango tango akosanaki liboma liboso ya Abimeleki oyo abenganaki ye, mpe akendeki. 2 ▼▼34:1 in most Bibles.
Nakopambola Yawe tango nyonso,nakokumisa Ye mikolo nyonso na bibebu na ngai.
3 ▼
▼34:2 in most Bibles.
Tika ete bomoi na ngai emikumisa kati na Yawe ;tika ete banyokolami bayoka mpe basepela !
4 ▼
▼34:3 in most Bibles.
Boya kosakola elongo na ngaiete Yawe azali monene !
Tonetola Kombo na Ye, biso nyonso.
5 ▼
▼34:4 in most Bibles.
Nalukaki Yawe, mpe ayanolaki ngai ;akangolaki ngai na somo na ngai nyonso.
6 ▼
▼34:5 in most Bibles.
Bato oyo batalaka epai na Ye bangengaka na esengo,mpe bayokisamaka soni ata moke te.
7 ▼
▼34:6 in most Bibles.
Mobola agangaki, mpe Yawe ayokaka ye ;abikisaki ye na pasi na ye nyonso.
8 ▼
▼34:7 in most Bibles.
Anjelu ya Yawe atongaka molako na yezingazinga ya bato oyo batosaka Yawe,
mpe akangolaka bango.
9 ▼
▼34:8 in most Bibles.
Bomeka elengi mpe botalandenge nini Yawe azali malamu ;
Esengo na moto oyo azwaka Yawe
lokola ebombamelo na ye !
10 ▼
▼34:9 in most Bibles.
Bino basantu ya Yawe, botosa Yawe ;pamba te bato oyo batosaka Ye
bazangaka eloko moko te.
11 ▼
▼34:10 in most Bibles.
Bana ya nkosi ezangaka mpe ekufaka nzala,kasi bato oyo balukaka Yawe
bakozanga eloko moko.
12 ▼
▼34:11 in most Bibles.
Bana na ngai, boya, boyoka ngai ;Nakolakisa bino kotosa Yawe.
13 ▼
▼34:12 in most Bibles.
Nani asepelaka na bomoi ?Nani alingaka kobika mikolo ebele ya esengo ?
14 ▼
▼34:13 in most Bibles.
Batela lolemo na yo mosika na mabe,mpe bibebu na yo ete eloba lokuta te.
15 ▼
▼34:14 in most Bibles.
Zala mosika na mabe mpe sala bolamu,luka kimia mpe koba na yango.
16 ▼
▼34:15 in most Bibles.
Miso ya Yawe etalaka bato ya sembo,mpe matoyi na Ye eyokaka koganga na bango ;
17 ▼
▼34:16 in most Bibles.
kasi Yawe apesaka bato mabe mokongompo ete bakanisa bango lisusu te kati na mokili.
18 ▼
▼34:17 in most Bibles.
Tango bato ya sembo babelelaka,Yawe ayokaka mpe akangolaka bango
na pasi na bango nyonso.
19 ▼
▼34:18 in most Bibles.
Yawe azali pene ya batooyo bazoki na mitema
mpe abikisaka ba-oyo balembi na milimo na bango.
20 ▼
▼34:19 in most Bibles.
Pasi mingi ekangaka moto ya sembo,kasi Yawe akangolaka ye na nyonso,
21 ▼
▼34:20 in most Bibles.
abatelaka mikuwa na ye nyonsompo ete moko te kati na yango ebukana.
22 ▼
▼34:21 in most Bibles.
Mabe ebomaka moto mabe,mpe bayini ya moto ya sembo bakozwa etumbu.
23 ▼
▼34:22 in most Bibles.
Yawe akangolaka bomoi ya basali na Ye ;mpe bato nyonso oyo bazwaka Ye
lokola ebombamelo na bango bakozwa etumbu te.
Copyright information for
LinMNB