‏ Psalms 38

Losambo ya mobeli

1
38:1 in some Bibles.
Nzembo ya Davidi mpo na kokanisa.

2
38:1 in most Bibles.
Yawe, kopamela ngai te kati na kanda na Yo
to kopesa ngai etumbu te kati na kanda makasi na Yo.
3
38:2 in most Bibles.
Pamba te makonga na Yo etoboli ngai,
mpe loboko na Yo ebeti ngai.
4
38:3 in most Bibles.
Mpo na kanda na Yo, nzoto na ngai ebeli ;
mpo na masumu na ngai, mikuwa na ngai elembi.
5
38:4 in most Bibles.
Mabe na ngai eleki moto na ngai,
ezali kilo makasi epai na ngai
lokola mokumba ya kilo makasi.

6
38:5 in most Bibles.
Bapota na ngai epoli mpe ekomi kolumba solo
mpo na bozoba na ngai.
7
38:6 in most Bibles.
Nagumbami, nalembi makasi ;
nakomi moto ya mawa mpo na libela.
8
38:7 in most Bibles.
Pamba te nazali koyoka pasi makasi na mokongo na ngai,
eteni ata moko te ya nzoto na ngai ezali malamu.
9
38:8 in most Bibles.
Nalembi, makasi na ngai nyonso esili ;
mobulu ekoti na motema na ngai,
nakomi koganga na kolemba te.

10
38:9 in most Bibles.
Nkolo, oyebi posa na ngai nyonso ;
kolela na ngai ezali ya kobombama te na miso na Yo.
11
38:10 in most Bibles.
Motema na ngai ezangi kimia,
makasi na ngai ekomi kosila,
nabungisi ata pole ya miso na ngai.
12
38:11 in most Bibles.
Bato oyo balingaka ngai mpe baninga na ngai
bakimi pasi na ngai,
ba-oyo bazalaka na ngai esika moko batelemi mosika na ngai.
13
38:12 in most Bibles.
Bato oyo balukaka kufa na ngai bazali kotia mitambo,
ba-oyo balukaka pasi na ngai bazali koloba mpo na kosala ngai mabe,
bakomi mikolo nyonso kobongisa lokuta.
14
38:13 in most Bibles.
Kasi ngai nazali kosala lokola mokufi matoyi ;
mpe lokola baba, nakangi monoko, naboyi koloba.
15
38:14 in most Bibles.
Nakomi lokola mokufi matoyi
oyo akoki kopesa eyano ata moko te na monoko na ye.
16
38:15 in most Bibles.
Yawe, natiaka elikya na ngai kati na Yo ;
oh Nkolo, Nzambe na ngai, solo, okoyanola.
17
38:16 in most Bibles.
Nalobaki : « Kopesa nzela te
ete basepela na tina na ngai
to bamitombola likolo na ngai soki nabeti libaku. »
18
38:17 in most Bibles.
Pamba te nakomi pene ya kokweya,
pasi na ngai ezali kaka elongo na ngai tango nyonso.
19
38:18 in most Bibles.
Solo nandimi mabe na ngai,
masumu na ngai ezali kotungisa molimo na ngai.
20
38:19 in most Bibles.
Banguna na ngai bazali makasi mpe bingambe,
bato oyo bayinaka ngai kaka pamba bazali ebele.
21
38:20 in most Bibles.
Bato oyo bazongisaka mabe na bolamu
bazali kofunda ngai atako nalukaka kosala bolamu.

22
38:21 in most Bibles.
Yawe, kosundola ngai te ;
Nzambe na ngai, kozala mpe mosika na ngai te.
23
38:22 in most Bibles.
Nkolo, Mobikisi na ngai,
yaka noki kosunga ngai.
Copyright information for LinMNB