Psalms 39
Liboso ya kufa
1 ▼▼39:1 in some Bibles.
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi mpe ya Yedutuni. Nzembo ya Davidi. 2 ▼▼39:1 in most Bibles.
Namilobelaki : « Nakosala keba na etamboli na ngaimpo ete monoko na ngai esala masumu te ;
nakobatela penza monoko na ngai
tango nyonso moto mabe akozala liboso na ngai. »
3 ▼
▼39:2 in most Bibles.
Boye nakangaki monoko na ngai mpe navandaki nye,natikalaki koloba ata likambo moko te ;
pasi na ngai ebakisamaki makasi.
4 ▼
▼39:3 in most Bibles.
Motema na ngai eswaki,moto ezalaki kopela kati na ngai,
mpe nalobaki na nzela ya monoko na ngai.
5 ▼
▼39:4 in most Bibles.
Yawe, yebisa ngai tango nini bomoi na ngai ekosukampe motango ya mikolo ya bomoi na ngai
mpo ete nasosola ete bomoi na ngai ezali kaka
mpo na mwa tango moke.
6 ▼
▼39:5 in most Bibles.
Solo mikolo ya bomoi na ngai ekatama,ezali pamba na miso na Yo.
Bomoi ya moto nyonso ezali kaka mopepe.
7 ▼
▼39:6 in most Bibles.
Moto akendaka mpe azongaka,azali kaka lokola elili ;
amitungisaka kaka pamba, andukaka bomengo,
kasi ayebaka te soki nani akotikala na yango.
8 ▼
▼39:7 in most Bibles.
Sik’oyo, oh Nkolo, nazela lisusu nini ?Natiaka elikya na ngai kati na Yo.
9 ▼
▼39:8 in most Bibles.
Bikisa ngai na mabe na ngai nyonso,kopesa nzela te na bazoba ete bafinga ngai.
10 ▼
▼39:9 in most Bibles.
Nakangi monoko, nakoloba lisusu te,pamba te Yo nde osali.
11 ▼
▼39:10 in most Bibles.
Kobeta ngai lisusu te,nazali kokoka lisusu te.
12 ▼
▼39:11 in most Bibles.
Opesaka bato etumbu mpo na masumu na bangompo na kozongisa bango na nzela ;
obebisaka biloko na bango ya motuya lokola nselele.
Solo, moto nyonso azali kaka mopepe.
13 ▼
▼39:12 in most Bibles.
Yawe, yokalibondeli na ngai ;
yoka na bokebi, wana nazali
koganga mpo na kosenga lisungi,
kovanda nye te liboso ya mpinzoli na ngai,
pamba te epai na Yo, nazali mopaya
mpe moleki nzela lokola bakoko na ngai.
14 ▼
▼39:13 in most Bibles.
Kotala ngai te mpo ete nasepela lisusu,liboso ete nakende na ngai mpe nazala lisusu te.
Copyright information for
LinMNB