Psalms 4
Yawe apesaka kimia
Nzembo ya David epai ya mokambi ya bayembi ; ayembaki yango na Gitare.
1 Nzambe ya bosembo na ngai,
zongisela ngai eyano tango nazali kobenga yo ;
kati na pasi na ngai, salisa ngai.
Yokela ngai mawa, mpe yoka libondeli na ngai !
2 Bino bana na bato,
kino tango nini bokokoba koyokisa nkembo na ngai soni ?
Kino tango nini bokolinga makambo ya pamba
mpe koluka makambo ya lokuta ?
3 Boyeba ete Yawe asiʼamiponela
moto oyo atosaka makambo na Nzambe.
Yawe akoyoka tango nakoganga epai na ye.
4 Kati na kanda na bino,
bosala masumu te tango bozali na mbeto na bino,
bokanisa malamu-malamu kati na mitema na bino,
bongo bovanda kimia.
5 Bopesa makabo na ndenge ya bosembo,
mpe botia elikya na bino kati na Yawe.
6 Bato mingi bazali kotuna :
“Nani akoki kolakisa biso bolamu ?”
Yawe, ngengisela biso moi ya elongi na yo !
7 Otondisi motema na ngai na esengo ya mingi penza,
koleka kutu esengo oyo bazalaka na yango
tango batondaka na ble ebele mpe vino ebele.
8 Yawe, Nakolala mpe nakozwa pongi na kimia nyonso ;
pamba te, kaka yo nde ovandisaka ngai na kozanga kobanga.
Copyright information for
LinMNB