‏ Psalms 40

Lobiko ya Nzambe epai ya mosali na Ye

1 ▼
▼40:1 in some Bibles.
Nzembo ya Davidi. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi.

2 ▼
▼40:1 in most Bibles.
Natiaki elikya na ngai kati na Yawe ;
abalukaki epai na ngai mpe ayokaki koganga na ngai.
3 ▼
▼40:2 in most Bibles.
Abimisaki ngai na libulu ya mozindo, kati na potopoto ;
atelemisaki ngai na likolo ya libanga
mpe alendisaki makolo na ngai.
4 ▼
▼40:3 in most Bibles.
Atiaka nzembo ya sika kati na monoko na ngai,
nzembo ya masanzoli mpo na Nzambe na biso.
Bato ebele bakomona, bakobanga
mpe bakotiela Yawe motema.

5 ▼
▼40:4 in most Bibles.
Esengo na moto oyo atiaka elikya kati na Yawe,
kasi atalelaka te bato ya lolendo mpe bakosi.
6 ▼
▼40:5 in most Bibles.
Yawe, Nzambe na ngai, bikamwa mpe mabongisi
oyo osalaka mpo na biso ezali ebele penza.
Moko te akokani na Yo ;
nalingi kotatola mpe kopanza sango na yango,
kasi motango na yango eleki ebele.

7 ▼
▼40:6 in most Bibles.
Osepelaki te na bambeka mpe na makabo,
kasi ofungolaki matoyi na ngai ;
osengaki te makabo ya kotumba mpe bambeka
mpo masumu.
8 ▼
▼40:7 in most Bibles.
Bongo nalobaki : « Ngai oyo, nayei epai na Yo
kolanda ndenge ekomami na tina na ngai kati na buku.
9 ▼
▼40:8 in most Bibles.
Nzambe na ngai, nasepelaka kosala mokano na Yo,
Mobeko na Yo ezali kati na motema na ngai. »

10 ▼
▼40:9 in most Bibles.
Nasakolaka bosembo na Yo kati na mayangani,
nakokanga monoko na ngai te ;
Yawe, oyebi yango !
11 ▼
▼40:10 in most Bibles.
Nabombaka bosembo na Yo te kati na motema na ngai,
natatolaka boyengebene mpe lobiko na Yo kati na mayangani,
nakobomba yango ata moke te.
12 ▼
▼40:11 in most Bibles.
Yawe, kopimela ngai mawa na Yo te ;
kasi sala ete bolingo mpe bosolo na Yo
ebatelaka ngai tango nyonso.
13 ▼
▼40:12 in most Bibles.
Pamba te makambo ebele ya pasi ezingeli ngai,
mabunga na ngai ekomi konyokola ngai,
mpe nazali kokoka lisusu te kotala yango ;
ezali ebele koleka suki ya moto na ngai,
mpe motema na ngai elembi kati na ngai.
14 ▼
▼40:13 in most Bibles.
Yawe, nabondeli Yo, kangola ngai ;
Yawe, yaka noki kosunga ngai.

15 ▼
▼40:14 in most Bibles.
Tika ete bato oyo balukaka kufa na ngai
bakufa soni mpe basambwa !
Tika ete bato oyo bazelaka libebi na ngai
bazonga sima mpe babungisa lokumu na bango !
16 ▼
▼40:15 in most Bibles.
Tika ete ba-oyo balobaka na ngai : « Ah ! Ah ! »
bayoka somo mpe bakufa soni !
17 ▼
▼40:16 in most Bibles.
Kasi tika ete bato nyonso oyo balukaka Yo
batonda na esengo mpe basepela kati na Yo !
Tika ete ba-oyo balingaka lobiko na Yo
balobaka tango nyonso : « Yawe azali monene ! »

18 ▼
▼40:17 in most Bibles.
Solo, nazali mobola mpe moto akelela,
kasi tika ete Nkolo asunga mpe akangola ngai.
Nzambe na ngai, kowumela te !
Copyright information for LinMNB