Psalms 41
Mobeli mpe monyokolami
1 ▼▼41:1 in some Bibles.
Nzembo ya Davidi. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. 2 ▼▼41:1 in most Bibles.
Esengo na moto oyo akanisaka mobola !Yawe akokangola ye na tango ya pasi.
3 ▼
▼41:2 in most Bibles.
Yawe akokengela ye mpe akobatela bomoi na ye,akokomisa ye moto ya esengo kati na mokili
mpe akokaba ye te na maboko ya banguna na ye.
4 ▼
▼41:3 in most Bibles.
Yawe akosunga ye na mbeto na ye soki abelimpe akobikisa ye na bokono na ye nyonso.
5 ▼
▼41:4 in most Bibles.
Nalobaki : « Oh Yawe, yokela ngai mawa ;bikisa ngai na bokono, pamba te nasalaki masumu epai na Yo. »
6 ▼
▼41:5 in most Bibles.
Banguna na ngai balobaka mabe na tina na ngai :« Akokufa mokolo nini mpo ete kombo na ye etangama lisusu te ? »
7 ▼
▼41:6 in most Bibles.
Kati na bango, moto nyonso oyo ayaka kotala ngaialobaka kaka lokuta mpo na kobebisa lokumu na ngai,
akangisaka kati na ye makambo ya lokuta
mpe, soki kaka abimi libanda, apanzaka yango na matongi.
8 ▼
▼41:7 in most Bibles.
Banguna na ngai basanganaka kakampo na kotonga ngai mpe kokanisa mpo na libebi na ngai.
9 ▼
▼41:8 in most Bibles.
Balobaka : « Pasi moko ya somo penza ekangi ye,ebwaki ye na mbeto mpe azali kokoka lisusu kotelema te. »
10 ▼
▼41:9 in most Bibles.
Ezala molingami na ngai ya kimia,oyo nazalaki kotiela motema
mpe azalaki kolia sani moko elongo na ngai,
abalukeli ngai.
11 ▼
▼41:10 in most Bibles.
Kasi Yo, Yawe, yokela ngai mawa mpe telemisa ngaimpo ete nazongisela bango mabe na mabe.
12 ▼
▼41:11 in most Bibles.
Nakoyeba ete osepelaka na ngaisoki kaka monguna na ngai agangi te na tina na ngai.
13 ▼
▼41:12 in most Bibles.
Mpo ete nazangi pamela, okosunga ngaimpe okovandisa ngai na makolo na Yo mpo na libela.
14 ▼
▼41:13 in most Bibles.
Tika ete Yawe, Nzambe ya Isalaele,akumisama libela na libela !
Amen ! Amen !
Copyright information for
LinMNB