Psalms 45
Nzembo mpo na libala ya mokonzi
Nzembo ya bolingo oyo bana ya Kore bayembaki ; epai mokambi ya bayembi. Eyembamaki na gitare oyo babengaka Lisi.
1 Motema na ngai etondi na maloba ya kitoko ;
nakosakola maloba na ngai mpo na Mokonzi ;
lolemo na ngai ezali ekomeli ya mokomi ya solo penza
2 Ozali kitoko mingi koleka bato ;
mpe bilembo na ye epakolami na ngolu ;
Yango wana Nzambe apambola yo
mpo na libela na libela.
3 Kanga mopanga na yo na loketo e elombe ;
lata yo moko lokumu mpe kongenga.
4 Kati na lokumu na yo,
mata likolo, telema liboso na elonga.
Mpo na solo, komikitisa mpe bosembo ;
tika ete loboko na yo ya mobali elakisa
misala ya somo.
5 Tika ete makonga na yo ya mino etobola mitema
ya banguna ya mokonzi ;
tika ete bikolo ekweya na se ya makolo na yo.
6 Kiti na yo ya bokonzi, Nzambe ekowumela
libela na libela ;
lingenda ya bosembo ekozala lingenda ya bokonzi na yo.
7 Olingaka bosembo,
mpe oboyaka mabe ;
yango wana Nzambe,
Nzambe na yo, atiaki yo likolo ya baoyo bazalaka na yo
na nzela ya kopakola yo na mafuta ya esengo.
8 Bilamba na yo nyonso ezali na solo ya malasi ya
mire, alowesi mpe kase ;
wuta na bandako ya minene oyo ebongisama na pembe ya nzoku,
miziki ya basinga ezali kopesa yo esengo
9 Bilenge basi ya mikonzi bazali na kati ya basi ya lokumu ;
na loboko na yo ya mobali
ezali na mokonzi ya mwasi
na kati ya wolo ya Ofir.
10 Yoka, elenge mwasi, tala mpe pesa litoyi ;
bosana bato na yo mpe ndako ya tata na yo.
11 Mokonzi azali kosepela mpo na kitoko na yo ;
kumisa ye, pamba te azali Nkolo na yo.
12 Elenge mwasi ya Tir akoya na likabo,
mpe bato ya bozui bakoluka komona bolamu na yo.
13 Nkembo nyonso ezali na elenge mwasi ya mokonzi
na kati na sambre na ye ;
na ye etongisami na wolo.
14 Na bilamba ya kitoko penza
bazali komema ye epai ya mokonzi ;
bilenge basi baoyo bayebi mibali te, baoyo
bazalaka na ye bazali kolanda ye na sima,
mpe bamemaki bolingo epai na yo.
15 Bazali komema bango na esengo mpe na esengo monene ;
bakokota na ndako ya mokonzi.
16 Bana na yo ya mibali bakozwa esika ya batata na yo ;
okotia bango bakonzi na mokili mobimba.
17 Nakosala ete bakanisaka yo
na mabota nyonso ;
yango wana, bikolo ekosanzola yo libela na libela !
Copyright information for
LinMNB