‏ Psalms 46

Nzambe azali ekimelo na biso

1
46:1 in some Bibles.
Nzembo ya bana ya Kore. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki na mongongo moke ya bilenge basi.

2
46:1 in most Bibles.
Mpo na biso, Nzambe azali ebombamelo mpe eyekamelo,
azali lisungi oyo ezangaka te na tango ya pasi.
3
46:2 in most Bibles.
Yango wana, tobangaka te ata soki mabele eningani,
bangomba ekweyi kati na ebale monene ;
4
46:3 in most Bibles.
ata soki bambonge na yango etelemi, ebimisi fulufulu
mpe eningisi bangomba.

5
46:4 in most Bibles.
Ezali na ebale moko oyo mayi na yango
esepelisaka engumba ya Nzambe
oyo eleki bule kati na bivandelo ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo.
6
46:5 in most Bibles.
Nzambe azali kati na yango, ebukani te ;
Nzambe asungaka yango wuta na tongo makasi.
7
46:6 in most Bibles.
Bikolo ezali kotomboka, bamboka ezali kokweya ;
kasi Nzambe atomboli mongongo na Ye,
mpe mabele ebukani.

8
46:7 in most Bibles.
Yawe, Mokonzi ya mampinga, azali elongo na biso ;
Nzambe ya Jakobi azali ekimelo na biso.

9
46:8 in most Bibles.
Boya kotala misala ya Yawe,
makambo minene oyo asalaka kati na mokili.
10
46:9 in most Bibles.
Asilisaka bitumba kino na basuka ya mokili,
akataka batolotolo, abukaka makonga
mpe atumbaka na moto bashar ya bitumba.
11
46:10 in most Bibles.
Alobaki : « Bovanda kimia,
boyeba ete ngai nazali Nzambe ;
nakonzaka bikolo, nakonzaka mpe mokili. »
12
46:11 in most Bibles.
Yawe, Mokonzi ya mampinga, azali elongo na biso ;
Nzambe ya Jakobi azali ekimelo na biso.
Copyright information for LinMNB