Psalms 47
Bobetela Nzambe maboko
1 ▼▼47:1 in some Bibles.
Nzembo ya bana ya Kore. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. 2 ▼▼47:1 in most Bibles.
Bino nyonso, bikolo, bobeta maboko !Boganga epai na Nzambe na esengo nyonso.
3 ▼
▼47:2 in most Bibles.
Tala ndenge nini Yawe,Ye-Oyo-Aleki-Likolo, azali somo !
Azali Mokonzi Monene na mokili mobimba.
4 ▼
▼47:3 in most Bibles.
Atiaki bikolo na se na biso,mpe mabota na se ya bokonzi na biso.
5 ▼
▼47:4 in most Bibles.
Aponelaki biso libula na biso,oyo ezali lokumu ya Jakobi, molingami na Ye.
6 ▼
▼47:5 in most Bibles.
Nzambe amataki kati na koganga ya esengo ;Yawe ayaka kati na lokito ya kelelo.
7 ▼
▼47:6 in most Bibles.
Boyemba mpo na lokumu ya Nzambe,boyemba mpo na lokumu na Ye.
Boyemba mpo na lokumu ya Mokonzi na biso,
boyemba mpo na lokumu na Ye.
8 ▼
▼47:7 in most Bibles.
Pamba te Nzambe azali Mokonzi ya mokili mobimba ;boyemba nzembo mpo na lokumu na Ye.
9 ▼
▼47:8 in most Bibles.
Nzambe akonzaka bikolo nyonso ;Nzambe avandi na Kiti na Ye ya bule.
10 ▼
▼47:9 in most Bibles.
Bato minene ya bikolo basangani,lokola bato ya Nzambe ya Abrayami,
pamba te bilombe ya mokili bazali ya Nzambe ;
atombwama makasi.
Copyright information for
LinMNB