‏ Psalms 48

Engumba ya Nzambe

1 ▼
▼48:1 in some Bibles.
Nzembo ya bana ya Kore.

2 ▼
▼48:1 in most Bibles.
Yawe azali monene mpe abongi na lokumu,
kati na engumba ya Nzambe na biso,
ngomba na Ye ya bule.

3 ▼
▼48:2 in most Bibles.
Ezali kitoko, ngomba moke oyo esalaka
esengo ya mokili mobimba,
ngomba Siona !
Ngambo na yango ya Nor nde ezali
engumba ya Mokonzi Monene.
4 ▼
▼48:3 in most Bibles.
Nzambe azali kati na bandako na yango ya bokonzi,
amimonisi lokola ndako batonga makasi.

5 ▼
▼48:4 in most Bibles.
Pamba te bakonzi basanganaki,
batambolaki nzela moko.
6 ▼
▼48:5 in most Bibles.
Kasi tango kaka bamonaki yango,
bakamwaki mpe bakimaki na somo.
7 ▼
▼48:6 in most Bibles.
Mbala moko, bakomaki kolenga wana
lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota
8 ▼
▼48:7 in most Bibles.
to lokola mopepe ya Este oyo apanzaka masuwa ya Tarsisi.

9 ▼
▼48:8 in most Bibles.
Ndenge kaka bayebisaki biso,
ndenge mpe tomonaki kati na engumba ya
Yawe, Mokonzi ya mampinga,
kati na engumba ya Nzambe na biso ;
Nzambe alendisaka yango seko na seko.

10 ▼
▼48:9 in most Bibles.
Nzambe, kati na Tempelo na Yo,
tokanisaka bolingo na Yo.
11 ▼
▼48:10 in most Bibles.
Nzambe, lokumu na Yo epanzani kino na suka ya mokili,
ndenge moko na Kombo na Yo ;
loboko na Yo ya mobali etondi na bosembo.
12 ▼
▼48:11 in most Bibles.
Ngomba ya Siona ezali kosepela,
bamboka ya Yuda etondi na esengo
mpo na mikano na Yo.

13 ▼
▼48:12 in most Bibles.
Botambola pembeni ya Siona,
bokende zingazinga na yango,
botanga bandako na yango ya milayi.
14 ▼
▼48:13 in most Bibles.
Botala lopango na yango,
botala malamu bandako na yango
mpo ete bopesa sango
epai ya bato oyo bakoya na sima.

15 ▼
▼48:14 in most Bibles.
Pamba te Nzambe wana azali Nzambe na biso
seko na seko mpe libela na libela ;
akotambolisa biso, ezala kino na kufa.
Copyright information for LinMNB