‏ Psalms 49

Kotia motema na bomengo ezali bozoba

1
49:1 in some Bibles.
Nzembo ya bana ya Kore. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi.

2
49:1 in most Bibles.
Bino bikolo nyonso, boyoka malamu makambo oyo ;
bino bavandi nyonso ya mokili, boyoka,
3
49:2 in most Bibles.
bato pamba mpe bato minene,
bazwi mpe babola :
4
49:3 in most Bibles.
Monoko na ngai ekoloba maloba ya bwanya ;
motema na ngai ekanisi makambo
oyo ekopesa bino bososoli.
5
49:4 in most Bibles.
Nayokaka masese,
mpe nalimbolaka sambole na nzela ya lindanda.

6
49:5 in most Bibles.
Mpo na nini nabanga na tango ya pasi,
tango mabe ya bakosi ezingeli ngai,
7
49:6 in most Bibles.
ba-oyo batielaka bomengo na bango motema
mpe bamikumisaka mpo na bofuluki ya bozwi na bango ?
8
49:7 in most Bibles.
Moko te akoki kosikola ndeko na ye,
moko te akoki kofuta mbongo epai ya Nzambe
mpo na lisiko na ye.
9
49:8 in most Bibles.
Talo ya bomoi na ye eleki motuya makasi,
mpe ekotikala kofutama te.
10
49:9 in most Bibles.
Akokaki kozala na bomoi libela na libela,
mpe akokaki kokufa te.
11
49:10 in most Bibles.
Solo, tomonaka bato ya bwanya kokufa
elongo na zoba mpe moto oyo azangi mayele,
mpe batikaka bomengo na bango epai ya bato mosusu.
12
49:11 in most Bibles.
Bakunda na bango nde ekomaka
bandako na bango mpo na libela,
mpe bisika na bango ya kovanda mpo na seko na seko,
atako bapesaki na bitando na bango ya mabele
bakombo na bango mpo ete ebengamaka na yango.

13
49:12 in most Bibles.
Mozwi akowumelaka te na bomoi ;
ata aleki na lokumu,
akokani na nyama oyo ezali kokufa.

14
49:13 in most Bibles.
Yango nde suka ya bato oyo
batiaka elikya kati na bango moko,
ya bato oyo balandaka bango
mpe basepelaka na maloba na bango.
15
49:14 in most Bibles.
Bazali lokola bameme
mpe babongisami mpo na mboka ya bakufi ;
kufa ekokoma kobokola bango.
Kala te, bato ya sembo bakonyata bango,
kitoko na bango ekonzuluka,
mpe mboka ya bakufi ekokoma ndako na bango.
16
49:15 in most Bibles.
Kasi Nzambe akokangola bomoi na ngai
wuta na maboko ya mboka ya bakufi,
pamba te akokamata ngai.
17
49:16 in most Bibles.
Komitungisaka te soki moto moko akomi kofuluka na bozwi,
soki kongenga ya ndako na ye ekomi komata se komata.
18
49:17 in most Bibles.
Pamba te akomema ata eloko moko te tango akokufa ;
bomengo na ye ekolanda ye te.
19
49:18 in most Bibles.
Atako, wana azalaki na bomoi,
azalaki komimona moto apambolama—
atako bato bakokumisa yo,
pamba te omisali bolamu—
20
49:19 in most Bibles.
okokende kaka kokutana na bakoko na yo
oyo bakotikala komona lisusu pole te.

21
49:20 in most Bibles.
Moto oyo azali mozwi, kasi azangi bososoli,
azali lokola nyama oyo ezali kokufa.
Copyright information for LinMNB