Psalms 51
Nasali masumu epai na Yo
1 ▼▼51:1 in some Bibles.
Nzembo ya Davidi. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. 2 ▼▼51:Title in some Bibles.
Eyembamaki tango mosakoli Natan akomaki epai ya Davidi sima na ye kosala ekobo elongo na Batisheba. 3 ▼▼51:1 in most Bibles.
Oh Nzambe, yokela ngai mawakolanda bolingo monene na Yo ;
longola masumu na ngai
kolanda mawa monene na Yo !
4 ▼
▼51:2 in most Bibles.
Sukola ngai mobimbampo na kolongola mabe na ngai,
mpe petola ngai na masumu na ngai.
5 ▼
▼51:3 in most Bibles.
Pamba te nayebi mabe na ngai,mpe masumu na ngai ezalaka
tango nyonso liboso na ngai.
6 ▼
▼51:4 in most Bibles.
Epai na Yo, epai na Yo kaka,nasali masumu mpe mabe na miso na Yo.
Boye, okozala sembo tango okozwa mokano,
mpe okozala na pamela te tango okokata makambo.
7 ▼
▼51:5 in most Bibles.
Solo, nabotamaki kati na lisumu ;wuta na libumu ya mama na ngai,
nazali mosumuki.
8 ▼
▼51:6 in most Bibles.
Nzokande Yo, osepelaka na bosembo,ata kati na libumu ;
mpe okoteya ngai bwanya
kati na esika ebombama.
9 ▼
▼51:7 in most Bibles.
Petola ngai na nzela ya izope,mpe nakokoma peto ;
sukola ngai, mpe nakokoma pembe
koleka mvula ya pembe.
10 ▼
▼51:8 in most Bibles.
Sepelisa ngai mpe yokisa ngai nsayi na motema ;mpe mikuwa na ngai oyo obukaki
ekosepela makasi.
11 ▼
▼51:9 in most Bibles.
Kotala lisusu masumu na ngai te,mpe longola bambeba na ngai nyonso.
12 ▼
▼51:10 in most Bibles.
Oh Nzambe, mpo na ngai, kela motema ya peto ;mpe kati na ngai, yeisa molimo sika mpe elenda.
13 ▼
▼51:11 in most Bibles.
Kobengana ngai te mosika ya elongi na Yo,mpe kolongola te kati na ngai
Molimo Mosantu na Yo.
14 ▼
▼51:12 in most Bibles.
Zongisela ngai esengo ya lobiko na Yo,mpe kabela ngai molimo oyo emibongisi malamu
mpo na kolendisaka ngai.
15 ▼
▼51:13 in most Bibles.
Nakoteya banzela na Yo epai ya babuki mibeko,mpe bato ya masumu bakozonga epai na Yo.
16 ▼
▼51:14 in most Bibles.
Oh Nzambe ! Nzambe, Mobikisi na ngai,kangola ngai wuta na mokumba ya makila,
mpe lolemo na ngai ekosakola bosembo na Yo.
17 ▼
▼51:15 in most Bibles.
Nkolo, fungola bibebu na ngai,mpe monoko na ngai ekokumisa Yo.
18 ▼
▼51:16 in most Bibles.
Mpo ete osepelaka na mbeka te,nakobonza te mbeka ya kotumba
oyo ondimaka te.
19 ▼
▼51:17 in most Bibles.
Nzambe, bambeka oyo osepelaka na yango ezali :molimo oyo ebukani.
Nzambe, oyinaka te motema oyo etutami mpe emikitisi.
20 ▼
▼51:18 in most Bibles.
Na ngolu na Yo, salela Siona bolamu,tonga bamir ya Yelusalemi.
21 ▼
▼51:19 in most Bibles.
Bongo okosepela na bambeka ya bosembo,bambeka ya kotumba mpe makabo ya kokoka ;
mpe bangombe ya mibali ekobonzama na bitumbelo na Yo.
Copyright information for
LinMNB