Psalms 52
Suka ya mozwi oyo anyokolaka bato
1 ▼▼52:1 in some Bibles.
Nzembo ya Davidi. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. 2 ▼▼52:Title in some Bibles.
Eyembamaki tango Doegi, moto ya Edomi, akendeki koyebisa Saulo ete Davidi akoti na ndako ya Ayimeleki. 3 ▼▼52:1 in most Bibles.
Yo elombe, mpo na nini ozali komikumisana tina na mabe ?
Bolingo ya Nzambe emonanaka mikolo nyonso.
4 ▼
▼52:2 in most Bibles.
Yo oyo otambolaka na lokuta,lolemo na yo esalaka mabongisi ya libebi,
ekosaka lokola mbeli bapelisa malamu.
5 ▼
▼52:3 in most Bibles.
Olingaka mabe koleka bolamu,lokuta koleka koloba bosolo.
6 ▼
▼52:4 in most Bibles.
Oh lolemo ya lokuta,olingaka maloba nyonso oyo epanzaka.
7 ▼
▼52:5 in most Bibles.
Solo, Ye moko Nzambe akobebisa yo mpo na libela,akokanga yo kati na ndako na yo,
akobwaka yo libanda
mpe akopikola yo na mokili ya bato ya bomoi.
8 ▼
▼52:6 in most Bibles.
Bato ya sembo bakomonampe bakokoma na somo,
bakotiola ye na maloba oyo :
9 ▼
▼52:7 in most Bibles.
« Tala moto oyo azalaki te kozwa Nzambelokola ebombamelo na ye,
azalaki kotiela bozwi na ye motema,
mpe kobakisa makasi na ye
na nzela ya kobebisa bato mosusu. »
10 ▼
▼52:8 in most Bibles.
Kasi ngai, kati na Ndako na Yo,nazali lokola nzete ya olive
oyo etondi na makasa ya mobesu ;
natiaka tango nyonso elikya na ngai
kati na bolingo monene ya Nzambe, mpo na libela.
11 ▼
▼52:9 in most Bibles.
Nakosanzola Yo mikolo nyonso,mpo na oyo osali ;
mpe nazalaka na elikya kati na Kombo na Yo,
pamba te ozali malamu mpo na bayengebene na Yo.
Copyright information for
LinMNB