‏ Psalms 53

Bato nyonso babungi nzela

1
53:1 in some Bibles.
Nzembo ya Davidi. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki na flite.

2
53:1 in most Bibles.
Bazoba bamilobelaka :
« Nzambe azali te. »
Makanisi na bango esila kobeba,
basalaka makambo mabe mpe ya nkele ;
moko te asalaka bolamu.

3
53:2 in most Bibles.
Wuta na likolo, Nzambe atalaka bato
mpo na koluka koyeba
soki ezali ata na moko ya mayele,
oyo atalelaka Nzambe.
4
53:3 in most Bibles.
Bango nyonso bazali batomboki,
bango nyonso bamibebisa ;
moko te asalaka bolamu,
ata moto moko te.

5
53:4 in most Bibles.
Boni, bato nyonso ya misala mabe bayebi eloko te ?

Baliaka bato na ngai ndenge baliaka lipa
mpe batikala nanu kobelela Nzambe te,
bazali penza kososola eloko moko te ?

6
53:5 in most Bibles.
Somo monene ekokanga bango
na esika oyo ezali ata na eloko moko te
oyo ekoki kopesa bango somo,
pamba te Nzambe apanzi mikuwa ya bato
oyo bayei kobundisa yo.
Okoyokisa bango soni,
pamba te Nzambe abwaka bango.

7
53:6 in most Bibles.
Tika ete lobiko ya Isalaele ebimela na Siona !
Tango Nzambe akobimisa bato na Ye na bowumbu,
bakitani ya Jakobi bakosepela,
mpe Isalaele ekozala na esengo.
Copyright information for LinMNB