‏ Psalms 55

Libondeli ya moto oyo bateki

1
55:1 in some Bibles.
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki na lindanda. Nzembo ya Davidi.

2
55:1 in most Bibles.
Oh Nzambe, yoka libondeli na ngai,
komibomba te wana nazali kobelela Yo.
3
55:2 in most Bibles.
Yoka ngai mpe yanola ngai.
Kati na kolela na ngai, nakomi koyengayenga
mpe nazangi kimia,
4
55:3 in most Bibles.
mpo na maloba ya monguna na ngai
mpe kanda ya moto mabe,
pamba te bazali kokweyisela ngai misala mabe
mpe konyokola ngai na kanda.

5
55:4 in most Bibles.
Motema na ngai etondi na mawa,
mpe somo ya kufa ekangi ngai.
6
55:5 in most Bibles.
Nakomi kobanga mpe kolenga,
somo monene ekangi ngai.
7
55:6 in most Bibles.
Nakomi komilobela :
« Soki nazalaki ata na mapapu ya ebenga,
nalingaki kopumbwa mpo na koluka bopemi ;
8
55:7 in most Bibles.
nalingaki kokima mosika penza,
mpo na kokende kovanda ata na esobe.
9
55:8 in most Bibles.
Solo, na lombangu penza,
nalingaki kokende koluka ebombamelo
mpo na kokima mopepe makasi mpe ekumbaki. »

10
55:9 in most Bibles.
Nkolo, bebisa mabongisi ya banguna na ngai
mpe kotisa mobulu kati na bango ;
pamba te, kati na engumba,
nazali komona mobulu mpe bokabwani.
11
55:10 in most Bibles.
Butu mpe moyi, ezali kotambola
na bamir na yango ;
misala mabe mpe ya kanza etondi kati na yango.
12
55:11 in most Bibles.
Banguya oyo ebebisaka ezali kosala kati na yango,
minyoko mpe lokuta ezali kosila te.

13
55:12 in most Bibles.
Soki monguna nde azalaki kofinga ngai,
nalingaki kokanga motema ;
soki ezalaki mpe moyini nde azalaki kotelemela ngai,
nalingaki komibomba mpo ete amona ngai te.
14
55:13 in most Bibles.
Kasi ezali yo, moto lokola ngai,
oyo otambolaka elongo na ngai,
molingami mpe moninga na ngai ya motema
15
55:14 in most Bibles.
oyo nazalaki kokabola elongo na yo,
pasi mpe basekele
tango tozalaki kokende
nzela moko na Tempelo ya Nzambe.

16
55:15 in most Bibles.
Tika ete kufa ekanga bango na mbalakata
mpe bakita ya bomoi kati na mboka ya bakufi ;
pamba te mabe etondi kati na bandako
mpe mitema na bango.

17
55:16 in most Bibles.
Mpo na ngai, nabelelaka Nzambe,
mpe Yawe akobikisa ngai.
18
55:17 in most Bibles.
Tongo, midi, pokwa,
nasopaka motema na ngai mpe nalelaka,
mpe ayokaka mongongo na ngai.
19
55:18 in most Bibles.
Akopesa ngai kimia, akokangola ngai
na bitumba oyo babundisaka ngai ;
pamba te bato oyo batelemeli ngai bazali ebele.
20
55:19 in most Bibles.
Nzambe ayokaka, akosambwisa bango penza ;
akonzaka mpo na libela na libela.

Babongolaka mitema te
mpe batosaka Nzambe te.

21
55:20 in most Bibles.
Abundisi balingami na ye,
abebisi boyokani na ye.
22
55:21 in most Bibles.
Maloba ya monoko na ye ezalaka sukali,
nzokande bitumba evandi kati na motema na ye ;
maloba na ye ezalaka ya kimia koleka mafuta,
nzokande ezali mopanga oyo ezangi ebombelo.

23
55:22 in most Bibles.
Bwakela Yawe mokumba na yo,
akosunga yo ;
akotika te ete moto ya sembo akweya
mpo na libela.
24
55:23 in most Bibles.
Mpe Yo, Nzambe, okobwaka basopi makila
mpe bakosi kati na libulu ya libebi ;
bakokokisa ata kati-kati te
ya mikolo ya bomoi na bango.
Kasi ngai, natiaka elikya na ngai kati na Yo.
Copyright information for LinMNB