Psalms 59
Nzambe na ngai, kangola ngai
1 ▼▼59:1 in some Bibles.
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki ndenge moko na « Kobebisa te ! » tango Saulo atindaki bato kozingela ndako ya Davidi mpo na koboma ye. Nzembo ya Davidi. 2 ▼▼59:1 in most Bibles.
Oh Nzambe na ngai, kangola ngaiwuta na maboko ya banguna na ngai ;
batela ngai liboso ya banyokoli na ngai.
3 ▼
▼59:2 in most Bibles.
Kangola ngai wuta na mabokoya bato ya misala mabe,
mpe bikisa ngai liboso ya basopi makila ya bato.
4 ▼
▼59:3 in most Bibles.
Yawe, bazali koluka koboma ngai ;bato na nguya basaleli ngai likita,
nzokande nasali mabe te,
nasali na ngai mpe masumu te.
5 ▼
▼59:4 in most Bibles.
Nasali mabe ata moko te ;kasi bango bazali kopota mbangu,
bazali komibongisa.
Lamuka mpo na koya kokutana na ngai, mpe tala.
6 ▼
▼59:5 in most Bibles.
Yawe, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso,Nzambe ya Isalaele, telema mpo na kopesa
bikolo nyonso etumbu ;
koyokela bato nyonso oyo basalaka mabe mawa te.
7 ▼
▼59:6 in most Bibles.
Bazongaka na pokwa,bagangaka lokola bambwa
mpe batambolaka zingazinga ya engumba.
8 ▼
▼59:7 in most Bibles.
Na nzela ya minoko na bango,babimisaka na bibebu na bango
maloba oyo ezokisaka lokola mipanga ; bamilobelaka :
« Nani azali koyoka biso ? »
9 ▼
▼59:8 in most Bibles.
Kasi Yo, Yawe, osekaka bango,otiolaka bikolo nyonso.
10 ▼
▼59:9 in most Bibles.
Nzambe, ozali makasi na ngai,nakotalela Yo ;
ozali ebombamelo na ngai,
11 ▼
▼59:10 in most Bibles.
Nzambe na ngai, oyo nalingaka.Nzambe ayaka kino liboso na ngai,
atikaka ngai kotala banguna na ngai.
12 ▼
▼59:11 in most Bibles.
Nkolo, nguba na biso, koboma bango te,noki te bato na ngai bakobosana.
Na nguya na Yo, sala ete bayengayenga,
mpe mema bango kino na se.
13 ▼
▼59:12 in most Bibles.
Mpo na masumu ya minoko na bango,mpo na maloba ya bibebu na bango,
tika ete bakangama na motambo ya lolendo na bango.
Mpo na bilakeli mabe mpe lokuta na bango,
14 ▼
▼59:13 in most Bibles.
bebisa bango na kanda na Yo,bebisa bango kino bazala lisusu te.
Bongo bakoyeba ete Nzambe azali kokonza
kati na Jakobi kino na suka ya mokili.
15 ▼
▼59:14 in most Bibles.
Bazongaka na pokwa,bagangaka lokola bambwa
mpe batambolaka zingazinga ya engumba.
16 ▼
▼59:15 in most Bibles.
Bayengaka-yengaka mpo na koluka bilei ;soki batondi te, balekisaka butu na kolelalela.
17 ▼
▼59:16 in most Bibles.
Kasi ngai nakoyembela makasi na Yo,nakobetela bolingo na Yo milolo, na tongo,
pamba te ozali ebombamelo na ngai,
mpe ekimelo na ngai na tango ya pasi.
18 ▼
▼59:17 in most Bibles.
Ozali makasi na ngai,nakoyemba mpo na lokumu na Yo ;
ozali ebombamelo na ngai, oh Nzambe ;
Nzambe na ngai, oyo nalingaka.
Copyright information for
LinMNB