Psalms 61
Bomba ngai na se ya lipapu na Yo
1 ▼▼61:1 in some Bibles.
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki na lindanda. Nzembo ya Davidi. 2 ▼▼61:1 in most Bibles.
Oh Nzambe, yoka koganga na ngai,yoka na bokebi losambo na ngai.
3 ▼
▼61:2 in most Bibles.
Wuta na suka ya mokili, nazali kobelela Yo,motema na ngai ebukani !
Mema ngai na libanga oyo eleki likolo
epai wapi nakokoka te kokoma ngai moko.
4 ▼
▼61:3 in most Bibles.
Pamba te, ozali ebombamelo na ngai,ndako molayi batonga makasi,
liboso ya banguna na ngai.
5 ▼
▼61:4 in most Bibles.
Posa ya motema na ngai ezali :kovanda tango nyonso kati na Ndako na Yo
mpe kozwa ebombamelo na se ya mapapu na Yo.
6 ▼
▼61:5 in most Bibles.
Pamba te Yo Nzambe, oyokaki bandayi na ngai,opesaki ngai libula ya bato
oyo batosaka Kombo na Yo.
7 ▼
▼61:6 in most Bibles.
Pesa na mokonzi na biso bomoi molayi ;tika ete awumela na bomoi.
8 ▼
▼61:7 in most Bibles.
Tika ete awumela na bokonzilibela na libela liboso ya Nzambe !
Bolingo mpe boyengebene na Yo ekobatela ye.
9 ▼
▼61:8 in most Bibles.
Boye, nakoyemba mikolo nyonsompo na lokumu ya Kombo na Yo,
mpe nakokokisa bandayi na ngai
mokolo na mokolo.
Copyright information for
LinMNB