‏ Psalms 65

Opesaka bofuluki

1
65:1 in some Bibles.
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi.

2
65:1 in most Bibles.
Mpo na Yo Nzambe,
bozangi makelele ezali lokumu, kati na Siona ;
mpe mpo na Yo, ndayi ekokokisama.
3
65:2 in most Bibles.
Yo oyo oyokaka mabondeli,
bato nyonso bakoya epai na Yo.
4
65:3 in most Bibles.
Kilo ya bambeba eleki makasi mpo na ngai ;
kasi Yo, olimbisaka masumu na biso.
5
65:4 in most Bibles.
Esengo na moto oyo oponi mpe obulisi
mpo ete avanda kati na lopango na Yo.
Tokotonda na bolamu ya Ndako na Yo,
Tempelo na Yo ya bule.

6
65:5 in most Bibles.
Nzambe Mobikisi na biso,
oyanolaka biso na bosembo,
na nzela ya biloko ya somo ;
Ozali elikya ya mokili mobimba
mpe ya bibale minene.
7
65:6 in most Bibles.
Alendisaka bangomba, na nguya na Ye ;
atondi na mpiko.
8
65:7 in most Bibles.
Akitisaka makelele ya bibale minene,
makelele ya bambonge na yango
mpe makelele ya bikolo.
9
65:8 in most Bibles.
Bato oyo bavandaka na basuka ya mokili
babangaka tango bamonaka bikamwa na Yo ;
osalaka ete este mpe weste eganga na esengo.

10
65:9 in most Bibles.
Opambolaka mabele, ofulukisaka yango,
otondisaka yango na bozwi.
Otondisaka moluka ya Nzambe na mayi,
obongiselaka bato ble,
pamba te otondisaka mayi mpo na yango.
11
65:10 in most Bibles.
Olekisaka mayi kati na mikala,
okweyisaka mipiku ya mabele,
osopelaka mabele mayi
mpe opambolaka milona.
12
65:11 in most Bibles.
Opambolaka mobu na bolamu na Yo,
mpe banzela mike oyo olekelaka ebotaka ebele.
13
65:12 in most Bibles.
Bilanga ya esobe etondaka na bilei,
mpe bangomba mike etondaka na esengo.
14
65:13 in most Bibles.
Bilanga etondaka na bameme mpe bantaba ;
mabwaku etondaka na ble,
egangaka na esengo mpe eyembaka.
Copyright information for LinMNB