Psalms 67
Tika ete bikolo nyonso ekumisa Nzambe
1 ▼▼67:1 in some Bibles.
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi : nzembo ya koyemba na lindanda. Loyembo. 2 ▼▼67:1 in most Bibles.
Tika ete Nzambe asalela biso ngolumpe apambola biso,
tika ete angengisela biso elongi na Ye ;
3 ▼
▼67:2 in most Bibles.
mpo ete toyeba nzela na Yo kati na mokili,mpe lobiko na Yo kati na bikolo nyonso.
4 ▼
▼67:3 in most Bibles.
Oh Nzambe, tika ete bikolo ekumisa Yo ;tika ete bikolo nyonso ekumisa Yo !
5 ▼
▼67:4 in most Bibles.
Tika ete bato basepela,tika ete babeta milolo ya esengo,
pamba te okambaka bikolo na bosembo,
mpe otambolisaka bato awa na mabele.
6 ▼
▼67:5 in most Bibles.
Oh Nzambe, tika ete bikolo ekumisa Yo ;tika ete bikolo nyonso ekumisa Yo !
7 ▼
▼67:6 in most Bibles.
Mabele eboti bambuma na yango ;tika ete Nzambe, Nzambe na biso, apambola biso.
8 ▼
▼67:7 in most Bibles.
Tika ete Nzambe apambola biso ;tika ete mokili mobimba etosa Ye !
Copyright information for
LinMNB