Psalms 68
Elonga ya Nzambe
1 ▼▼68:1 in some Bibles.
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi. Loyembo. 2 ▼▼68:1 in most Bibles.
Soki Nzambe atelemi, banguna na Ye bapalanganaka,mpe bayini na Ye bakimaka mosika na Ye.
3 ▼
▼68:2 in most Bibles.
Liboso ya Nzambe, bato mabe bakufaka,ndenge milinga elimwaka,
mpe mafuta enyangwamaka na moto.
4 ▼
▼68:3 in most Bibles.
Liboso ya Nzambe, bato ya sembo basepelaka,batondaka na esengo.
5 ▼
▼68:4 in most Bibles.
Boyembela Nzambe, boyemba banzembompo na lokumu ya Kombo na Ye.
Bofungola nzela mpo na Ye
oyo atambolisaka mampinga na Ye kati na esobe.
Kombo na Ye ezali Yawe.
Botonda na esengo liboso na Ye.
6 ▼
▼68:5 in most Bibles.
Kati na Ndako na Ye ya bule, Nzambe azali Tata ya bana bitike,mpe molobeli ya basi bakufisa mibali.
7 ▼
▼68:6 in most Bibles.
Nzambe apesaka libota epai ya batooyo bavandaka bango moko,
abimisaka bakangami wuta na minyololo ;
kasi batomboki batikalaka na mabele ekawuka.
8 ▼
▼68:7 in most Bibles.
Oh Nzambe, tango obimaki liboso ya bato na Yo,tango otambolaki na esobe,
9 ▼
▼68:8 in most Bibles.
mabele eninganaki, likolo mpe esopaki mayiliboso ya Nzambe, Nzambe ya Sinai ;
liboso ya Nzambe, Nzambe ya Isalaele.
10 ▼
▼68:9 in most Bibles.
Nzambe, osopaki mvula ya mapamboli,olendisaki libula na Yo mpo ete elembaki.
11 ▼
▼68:10 in most Bibles.
Oh Nzambe, bato na Yo bavandaka na mokili oyo obongisaki,na boboto na Yo, mpo na mobola.
12 ▼
▼68:11 in most Bibles.
Na liloba moko kowuta na Nkolo,basi oyo bamemaka sango basangani bato ebele,
13 ▼
▼68:12 in most Bibles.
bakonzi ya mampinga bakimi, bapoti mbangu,mpe mwasi oyo atikali na ndako akaboli bomengo ya bitumba.
14 ▼
▼68:13 in most Bibles.
Boni, bokokoba kolala pongi kati na bandako na bino ?Mapapu ya ebenga ezipami na se ya palata,
mpe bansala na yango ezipami na se ya wolo.
15 ▼
▼68:14 in most Bibles.
Tango Nkolo-Na-Nguya-Nyonso abenganaki kuna bakonzi,anokisaki mvula ya pembe na ngomba Tsalimoni.
16 ▼
▼68:15 in most Bibles.
Ngomba ya Bashani, ngomba ya Nzambe ;ngomba ya Bashani, ngomba ya basonge ebele,
17 ▼
▼68:16 in most Bibles.
mpo na nini ozali kosala zuwa,ngomba ya basonge ebele,
ngomba oyo Nzambe asepelaka kovanda ?
Nzokande Yawe akovanda kuna libela na libela.
18 ▼
▼68:17 in most Bibles.
Motango ya bashar ya Nzambe ezali ebele,koleka minkoko ;
Nkolo azali kati na yango,
kuna na Sinai, kati na Esika ya bule.
19 ▼
▼68:18 in most Bibles.
Yawe Nzambe, tango omataki na likolo,omemaki bakangami,
ozwaki makabo epai ya bato,
ata epai ya batomboki,
mpo ete okoma kovanda kuna.
20 ▼
▼68:19 in most Bibles.
Tika ete Nkolo akumisama, mokolo na mokolo !Nzambe Mobikisi na biso alataka makambo na biso.
21 ▼
▼68:20 in most Bibles.
Mpo na biso, Nzambe yango azali Nzambe oyo abikisaka ;mpe bikuke ya kufa ezali ya Nkolo Yawe.
22 ▼
▼68:21 in most Bibles.
Solo, Nzambe apanzaka mito ya banguna na Ye,oyo batambolaka kati na bomoi ya masumu,
oyo mito na bango etonda na suki.
23 ▼
▼68:22 in most Bibles.
Nkolo alobi :« Wuta na Bashani, nakomema bango ;
wuta na mozindo ya ebale monene,
nakomema bango,
24 ▼
▼68:23 in most Bibles.
mpo ete opanza lokolo na yo kati na makila,mpe mpo ete lolemo ya bambwa na yo ezwa eteni na yango. »
25 ▼
▼68:24 in most Bibles.
Oh Nzambe, bazali komona ndenge ozali koya ;koya ya Nzambe na ngai, ya Mokonzi na ngai, kati na Esika ya bule.
26 ▼
▼68:25 in most Bibles.
Bayembi bazali liboso ;sima na bango, bato oyo bazali kobeta
mandanda ya basinga kati na bilenge basi
oyo bazali kobeta bambonda ya mike.
27 ▼
▼68:26 in most Bibles.
Bopambola Nzambe kati na mayangani,bopambola Yawe wuta na etima ya Isalaele.
28 ▼
▼68:27 in most Bibles.
Kuna, Benjame, leki ya suka,azali kotambolisa bakambi ya Yuda
elongo na mampinga na bango,
bakambi ya Zabuloni mpe ya Nefitali.
29 ▼
▼68:28 in most Bibles.
Nzambe na yo apesi mitindo epai ya makasi na yo ; zala makasi.Nzambe, osaleli biso penza makambo.
30 ▼
▼68:29 in most Bibles.
Wuta na Tempelo na Yo ya Yelusalemiepai wapi bakonzi bamemelaka Yo makabo,
31 ▼
▼68:30 in most Bibles.
bengana ngando oyo ebombami kati na matiti,lisanga ya bangombe ya mibali elongo na bana ngombe ya bikolo
oyo batambolaka kati na mbongo
ya bibende ya palata, mpe panza bikolo oyo basepelaka na bitumba.
32 ▼
▼68:31 in most Bibles.
Bazwi bakobimela na Ejipito ;bato ya Kushi bakoya na lombangu,
bakotombola maboko epai ya Nzambe.
33 ▼
▼68:32 in most Bibles.
Bino, babokonzi ya mabele, boyembela Nzambe ;boyemba banzembo mpo na lokumu ya Nkolo !
34 ▼
▼68:33 in most Bibles.
Boyembela Ye oyo atambolisakamampinga kati na likolo, likolo ya libela ;
oyo, wuta na mongongo na Ye, agangaka makasi.
35 ▼
▼68:34 in most Bibles.
Bosakola ete nguya ezali ya Nzambeoyo nkembo na Ye ezali na Isalaele,
mpe nguya na Ye ezali kati na mapata.
36 ▼
▼68:35 in most Bibles.
Nzambe, wuta kati na bisika na Yo ya bule,obongi na botosi !
Nzambe ya Isalaele apesaka na bato na Ye
makasi mpe nguya.
Tika ete Nzambe akumisama !
Copyright information for
LinMNB