Psalms 69
Nazindi, bikisa ngai
1 ▼▼69:1 in some Bibles.
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi : ezali ya koyemba lokola « lisi. » 2 ▼▼69:1 in most Bibles.
Nzambe, bikisa ngai,pamba te mayi ekomi na kingo na ngai.
3 ▼
▼69:2 in most Bibles.
Nazali kozinda na potopoto, na mozindo makasiepai wapi eloko ya kosimba ezali te ;
nakiti na mozindo ya mayi,
mbonge ememi ngai.
4 ▼
▼69:3 in most Bibles.
Nalembi nzoto likolo ya kobelela lisungi ;mongongo na ngai ekawuki,
miso na ngai elembi
mpo na kotalela Nzambe na ngai.
5 ▼
▼69:4 in most Bibles.
Bato oyo bayinaka ngai na kozanga tinabazali ebele koleka motango ya suki ya moto na ngai ;
ba-oyo balukaka kobebisa bomoi na ngai,
oyo bazali banguna na ngai kaka pamba,
bazali bato na nguya ;
bazali kosenga ngai na makasi ete nazongisa eloko oyo nayibaki te.
6 ▼
▼69:5 in most Bibles.
Nzambe, oyebi bozoba na ngai,mpe mabe na ngai ezali ya kobombama te na miso na Yo.
7 ▼
▼69:6 in most Bibles.
Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga,tika ete ba-oyo batiaka elikya kati na Yo
basila lokumu te likolo na ngai !
Nzambe ya Isalaele,
tika ete bato oyo balukaka Yo
bayokisama soni te likolo na ngai !
8 ▼
▼69:7 in most Bibles.
Pamba te nandimi kofingama mpo na Yo,mpe soni ezipi ngai elongi.
9 ▼
▼69:8 in most Bibles.
Bandeko na ngai bakomi kozwa ngai lokola moto oyo bayebi te,nakomi lokola mopaya na miso ya bana ya mama na ngai.
10 ▼
▼69:9 in most Bibles.
Pamba te bolingo oyo nazali na yangompo na ndako na Yo ezali kozikisa ngai,
mpe mafinga ya bato oyo bafingaka Yo
ezali kokweya na moto na ngai.
11 ▼
▼69:10 in most Bibles.
Soki naleli mpe nakili bilei,nasengeli kaka kofingama ;
12 ▼
▼69:11 in most Bibles.
soki nalati saki,bato basalaka masapo mpo na kotiola ngai.
13 ▼
▼69:12 in most Bibles.
Bato oyo bavandi na ekuke batiolaka ngai,balangwi masanga bayembaka kombo na ngai
kati na banzembo na bango.
14 ▼
▼69:13 in most Bibles.
Yawe, nabondeli Yo !Nzambe, tango ekoki,
tango ya kotalisa ngai bolingo monene na Yo !
Yanola ngai na nzela ya boyengebene mpe lobiko na Yo !
15 ▼
▼69:14 in most Bibles.
Bimisa ngai na potopoto,sala ete nazinda lisusu te,
nakangolama wuta na maboko ya bayini na ngai
mpe nabima na mayi ya mozindo !
16 ▼
▼69:15 in most Bibles.
Tika ete mbonge ya mayi emema ngai lisusu te,mozindo emela lisusu ngai te,
mpe libulu ekangamela ngai te !
17 ▼
▼69:16 in most Bibles.
Yawe, yanola ngai, pamba te bolingo na Yo ezali malamu ;baluka epai na ngai, na mawa monene na Yo.
18 ▼
▼69:17 in most Bibles.
Kobombela lisusu mosali na Yo te elongi na Yo.Yanola ngai noki, pamba te nazali na pasi.
19 ▼
▼69:18 in most Bibles.
Pusana pene na ngai, mpe sikola ngai ;kangola ngai wuta na maboko ya bayini na ngai.
20 ▼
▼69:19 in most Bibles.
Oyebi ndenge nini nazali kofingama,oyebi soni mpe kosambwa na ngai ;
banguna na ngai nyonso bazali liboso na Yo.
21 ▼
▼69:20 in most Bibles.
Mafinga ezokisi motema na ngai,mpe pota yango ezali kosila te ;
nazelaki elembo ya mawa kowuta na bato,
kasi namonaki yango te ;
nalukaki babondisi, kasi namonaki bango te.
22 ▼
▼69:21 in most Bibles.
Batiaki ngenge kati na bilei na ngai,mpe bamelisaki ngai vino ya ngayi
tango nayokaki posa ya mayi.
23 ▼
▼69:22 in most Bibles.
Tika ete mesa na bango ekoma motambo liboso na bango,mpe kimia na bango ekoma monyama.
24 ▼
▼69:23 in most Bibles.
Tika ete miso na bango ekufa mpo ete bamona lisusu te,mpe babela mikongo mpo na libela.
25 ▼
▼69:24 in most Bibles.
Sopela bango kanda makasi na Yo,mpe tika ete kanda na Yo ya makasi ekanga bango.
26 ▼
▼69:25 in most Bibles.
Tika ete molako na bango etikala polele,mpe ete moto moko te avanda na bandako na bango ya kapo.
27 ▼
▼69:26 in most Bibles.
Pamba te bazali konyokola bato oyo ozokisaki,mpe bazali kopanza sango ya pasi ya bato oyo oyokisaki pasi.
28 ▼
▼69:27 in most Bibles.
Bakisa mabe na likolo ya mabe na bango,mpe kokota likambo na bango te na bosembo na Yo.
29 ▼
▼69:28 in most Bibles.
Tika ete bakombo na bango elongwa na buku ya bomoi,mpe batangama te na molongo ya bato ya sembo.
30 ▼
▼69:29 in most Bibles.
Solo, nazali mobola mpe moto ya pasi ;kasi lobiko na Yo, oh Nzambe, ebatelaka ngai.
31 ▼
▼69:30 in most Bibles.
Nakoyemba mpo na lokumu ya Kombo ya Nzambe,mpe nakopesa Ye nkembo elongo na matondi.
32 ▼
▼69:31 in most Bibles.
Yango nde ekosepelisa Yawe,koleka ngombe oyo ezali na maseke
mpe na makolo ekabwana.
33 ▼
▼69:32 in most Bibles.
Babola bamoni mpe bazali kosepela.Tika ete mitema na bino oyo bolukaka Nzambe ezala na bomoi !
34 ▼
▼69:33 in most Bibles.
Pamba te Yawe ayokaka bato oyo bakelela,mpe atiolaka bato na Ye te ata bazali bakangami kati na boloko.
35 ▼
▼69:34 in most Bibles.
Tika ete likolo mpe mabele,bibale minene mpe nyonso oyo ezali kati na yango ekumisa Ye !
36 ▼
▼69:35 in most Bibles.
Pamba te Nzambe akobikisa Sionampe akotonga lisusu bingumba ya Yuda.
Bato bakovanda kuna
mpe bakozwa yango lokola libula na bango.
37 ▼
▼69:36 in most Bibles.
Bakitani ya basali na Ye bakozwayango lokola libula,
mpe bato oyo balingaka Kombo na Ye
bakovanda kati na yango.
Copyright information for
LinMNB