‏ Psalms 7

Yawe, longisa ngai

1
7:1 in some Bibles.
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya mawa oyo Davidi ayembelaki Yawe na tina na Kushi, moto ya libota ya Benjame.

2
7:1 in most Bibles.
Yawe, Nzambe na ngai, nabombamaka kati na Yo ;
bikisa ngai mpe kangola ngai liboso ya bato nyonso
oyo balukaka koboma ngai.
3
7:2 in most Bibles.
Soki te, bakopasola ngai lokola nkosi
mpe bakokata ngai na biteni,
mpe moto akozala te mpo na kosunga ngai.

4
7:3 in most Bibles.
Yawe, Nzambe na ngai, soki nasalaki makambo
oyo bazali kopamela ngai mpo na yango,
mpe soki ezali na mabe na maboko na ngai,
5
7:4 in most Bibles.
soki nasalaki moninga na ngai mabe,
soki nabotolaki na makasi mpe kaka na pamba,
biloko ya moyini na ngai ;
6
7:5 in most Bibles.
wana tika ete monguna na ngai alanda mpe akanga ngai,
tika ete asakanela bomoi na ngai
mpe abebisa lokumu na ngai.

7
7:6 in most Bibles.
Yawe, telema na kanda na Yo,
telemela kotomboka ya banguna na ngai.
Nzambe na ngai, telema, kata likambo na ngai.
8
7:7 in most Bibles.
Tika ete bikolo esangana zingazinga na Yo,
kasi Yo, konza bango wuta na Kiti na Yo ya Bokonzi.
9
7:8 in most Bibles.
Tika ete Yawe asambisa bikolo.
Yawe, longisa ngai kolanda bosembo na ngai,
kolanda bozangi pamela na ngai,
Yo-Oyo-Oleki-Likolo.

10
7:9 in most Bibles.
Yo Nzambe ya sembo oyo ososolaka
mozindo ya mayele mpe ya mitema,
sukisa kanza ya bato mabe
mpe yikisa moto ya sembo mpiko.

11
7:10 in most Bibles.
Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo azali nguba na ngai,
abikisaka bato ya sembo.
12
7:11 in most Bibles.
Nzambe azali Mosambisi ya sembo,
asilikaka mikolo nyonso.
13
7:12 in most Bibles.
Soki alembisi kanda na Ye te,
akopelisa minu ya mopanga na Ye,
akobongisa mpe akobeta tolotolo na Ye.
14
7:13 in most Bibles.
Abongisaka bibundeli oyo ebomaka
mpe asalaka ete makonga na Ye ekoma kozikisa.

15
7:14 in most Bibles.
Moto nyonso oyo abongisaka kosala mabe
alukaka ndenge nini koyokisa bato pasi
mpe abebisaka boyokani ;
16
7:15 in most Bibles.
atimolaka libulu,
kasi ye moko nde akweyaka kati na yango.
17
7:16 in most Bibles.
Pasi oyo ayokisaka bato ezongelaka ye moko,
mpe mabe na ye ekweyaka na moto na ye moko.

18
7:17 in most Bibles.
Nakokumisa Yawe mpo na bosembo na Ye,
mpe nakosanzola Yawe-Oyo-Aleki-Likolo na banzembo.
Copyright information for LinMNB